Etumbelo mpo na nzambe oyo ayebani nkombo te
NTOMA Paulo akómaki na Atene, na ekólo Grèce soki na mobu 50 na ntango na biso (T.B.). Na engumba yango amonaki etumbelo moko oyo basalelaki nzambe oyo ayebani te mpe na nsima alobelaki yango ntango azalaki kopesa litatoli moko malamu mpenza mpo na Yehova.
Na ebandeli ya lisukulu na ye na likoló ya Ngomba Ale, Paulo alobaki boye: “Mibali ya Atene, namoni ete na makambo nyonso bomonani ete bomipesá na kobanga banzambe koleka bato mosusu nyonso. Na ndakisa, ntango nazalaki koleka mpe kotala na likebi mpenza biloko na bino ya losambo namonaki mpe etumbelo moko oyo likoló na yango ekomamá ete ‘Epai ya Nzambe oyo ayebani te.’ Na yango oyo bino bokangami na ye kozanga ete bóyeba ye, ye nde nazali kosakola epai na bino.”—Misala 17:22-31, NW.
Atako etumbelo oyo ezalaki na Atene emonaná naino te, bitumbelo ya ndenge yango ezalaki na bamboka mosusu ya Grèce. Na ndakisa, Pausanias, moto ya ekólo Grèce mpe moto ya mayele na geografi na ekeke ya mibale, alobelaki bitumbelo ya “banzambe oyo bayebani nkombo te” na Phalère, mboka oyo ezali mosika te na Atene. (Description de la Grèce, Attique I, 4) Kaka buku yango emonisi lisusu ete na Olympie ezalaki na “etumbelo moko ya banzambe oyo bayebani te.”—Élide I, XIV, 8.
Na buku na ye (Appollonius de Tyane, sa vie, ses voyages, ses prodiges [VI, III]), Philostrate, mokomi moko ya ekólo Grèce (azalaki na bomoi soki na mobu 170 tii soki 245 T.B.) alobaki ete “bitumbelo mpo na kokumisa ata banzambe oyo bayebani nkombo te” ezalaki na Atene. Na buku na ye mpe (Lives of Philosophers [1.110]), Diogène Laërce (azalaki na bomoi soki na mobu 200 tii 250 T.B.), akomaki ete “bitumbelo oyo ezali na nkombo te” ekokaki komonana na bisika mingi ya Atene.
Baloma mpe basalaki bitumbelo mpo na banzambe oyo bayebani nkombo te. Etumbelo oyo elakisami awa na elilingi etongamá na ekeke ya liboso to ya mibale liboso ya ntango na biso (L.T.B.) mpe ebatelamá na ndako moko oyo babombaka biloko ya kalakala (Palatine Antiquarium) na Rome, na ekólo Italie. Makambo oyo bakomi na Latin emonisi ete etumbelo wana ezalaki ya “nzambe to nzambe-mwasi”—maloba oyo ezalaki “mbala mingi na mabondeli oyo bazalaki kosala liboso bábanda kosalela etumbelo ya sika, ezala na makomi oyo ezali na bitumbelo yango to na mikanda.”
Bato mingi bayebi naino malamu te “Nzambe oyo asalá mokili, na biloko nyonso na kati na yango.” Kasi lokola Paulo ayebisaki bato ya Atene Nzambe yango—Yehova—“azali mosika te na mokomoko na biso.”—Misala 17:24, 27, NW.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 32]
Etumbelo: Soprintendenza Archeologica di Roma