Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 1/10 lok. 32
  • Osengeli komitungisaka ata na likambo moko te?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Osengeli komitungisaka ata na likambo moko te?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 1/10 lok. 32

Osengeli komitungisaka ata na likambo moko te?

BATO mingi bamonaka ete bakumisi bango soki balobi na bango ete bamitungisaka ata na likambo moko te, elingi koloba bazali bato ya kimya, oyo batikaka basusu bákanisa to básala oyo bamoni malamu. Kasi, komitungisa ata na likambo moko te ezali mpe na ndimbola mosusu. Biblia elobi ete: “Komitungisa ata na likambo moko te oyo bazoba bamonisaka ekobebisa bango.” (Masese 1:​32, NW) Maloba yango elakisi nini?

Na Babiblia mosusu, liloba ya Liebele oyo ebongolami na ‘komitungisa ata na likambo moko te’ ebongolami na ‘komimona moto ya mayele’ (Bible na Lingala ya lelo oyo), “bozoba” (Liloba lya Nzambe, ebimeli ya 4), ‘kokeba na eloko te’ (Liloba lya Nzambe, ebimeli ya 5). Na ndenge oyo esalelami na vɛrsɛ yango, ezaleli ya komitungisa ata na likambo moko te ezali ndeko ya gɔigɔi mpe ya bozoba.

Na ekeke ya liboso, baklisto ya lisangá ya Laodikia bazalaki komitungisa ata moke te to bazalaki kokeba te na makambo oyo bazangaki na elimo. Bazalaki komimona bato ya mayele mpe bazalaki komikumisa ete ‘bazalaki na mposa ya eloko moko te.’ Yesu Klisto asembolaki bango, asɛngaki bango bázongela molende oyo bazalaki na yango liboso na mosala ya boklisto.​—⁠Emoniseli 3:​14-19.

Na mikolo ya Noa mpe, bato bazalaki komitungisa ata na likambo moko te. Bamipesaki na makambo ya bomoi, “kolya mpe komɛla, mibali bazalaki kobala mpe basi bazalaki kobalisama . . . , mpe batyaki likebi te tii mpela eyaki mpe ekɔmbɔlaki bango nyonso.” Nsima ya koloba bongo, Yesu abakisaki ete: “Kozala ya Mwana ya moto ekozala mpe bongo.”​—⁠Matai 24:​37-39.

Bisakweli ya Biblia oyo esili kokokisama ezali komonisa ete tozali na ntango ya “kozala ya Mwana ya moto,” elingi koloba Yesu Klisto. Tókóma soki moke te komimona bato ya mayele, bazoba, bato oyo bakebaka na eloko te, to na maloba mosusu, tókóma te na ndenge ya mabe ya komitungisa ata na likambo moko te.​—⁠Luka 21:​29-36.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto