Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 1/1 lok. 32
  • “Olobaki solo, bomoi ezali kitoko mpenza!”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Olobaki solo, bomoi ezali kitoko mpenza!”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 1/1 lok. 32

“Olobaki solo, bomoi ezali kitoko mpenza!”

OLINGI koyeba ntina ya solosolo ya bomoi? Magdalena, elenge mwasi moko ya mbula 18 oyo azali Motatoli ya Yehova mpe afandaka na engumba Szczecin, na ekólo Pologne, asalisaki Katarzyna, moninga na ye ya kelasi, na koyeba yango. Katarzyna azalaki koloba polele ete ye andimaka te ete Nzambe azali; atako bongo, ntango Magdalena asololaki na ye makambo ya Biblia, asepelaki mingi.

Katarzyna asepelaki na makambo oyo Magdalena alakisaki ye na Biblia, kasi andimaki yango mpenza te. Mokolo moko, ntango bazalaki kolobela baninga ya solo, Katarzyna alobaki ete: “Yo otángaka Biblia; oyebi mitinda oyo osengeli kolanda mpe epai okoki koluka baninga. Kasi, ezali boni mpo na baoyo bazali naino kondima mitinda wana te?”

Makanisi ya Katarzyna ebongwanaki ntango asalaki mobembo moko na Londres, na Angleterre. Kuna, azwaki libaku ya kokende kotala biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova; bongo, boboto oyo bamoniselaki ye ekamwisaki ye mingi. Mwa makambo mikemike lokola kosimbela ye porte mpo aleka mpe koyoka ye na likebi ntango azalaki koloba, esepelisaki ye mingi.

Na sanza ya Sɛtɛmbɛ 2001, ntango bazongaki na kelasi, Katarzyna andimaki abanda koyekola Biblia pɔsɔ na pɔsɔ. Sikoyo akómi kosepela na mitinda ya Biblia mpe abandi kosalela yango na bomoi na ye. Eleki mwa mikolo, ayebisaki Magdalena maloba oyo: “Nazali komona lokola nde nabandi bomoi ya sika.” Lisusu, ayebisaki ye mwa maloba oyo na telefone: “Matɔndi mingi mpo na boyekoli na biso ya lelo! Olobaki solo, bomoi ezali kitoko mpenza! Ezali mpenza malamu koyeba nani oyo tosengeli kopesa matɔndi mpo na yango.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto