Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 1/5 lok. 32
  • “Bózala na lisosoli malamu”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bózala na lisosoli malamu”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 1/5 lok. 32

“Bózala na lisosoli malamu”

BATO mingi balandaka lisosoli na bango ntango bazali kozwa bikateli. Kasi, mpo lisosoli na biso ekosa biso te, esengeli koteyama malamu mpo eyeba kokesenisa malamu na mabe, mpe tosengeli kokakatana te mpo na kotosa yango.

Tókamata ndakisa ya Zakai, moto moko oyo Biblia elobeli. Zakai azalaki kapita ya bakɔngɔli-mpako, azalaki kofanda na Yeliko mpe azalaki na bozwi mingi. Ye moko alobaki ete akómaki na bozwi mpo azalaki kofutisa bato mpako oyo eleki mpe mbongo oyo azalaki kolekisa likoló azalaki kotya yango na libenga na ye moko. Na ntembe te bato yango bazalaki kosepela na likambo yango ata moke te. Kasi, makambo mabe oyo Zakai azalaki kosala ezalaki nde kotungisa lisosoli na ye? Ata soki etungisaki lisosoli na ye, emonani ete azalaki kotyela yango likebi te.​—Luka 19:1-7.

Kasi, likambo moko esalemaki oyo etindaki ye atalela lisusu bomoi na ye. Yesu akómaki na Yeliko. Zakai azalaki na mposa amona Yesu, kasi lokola azalaki mokuse, akokaki komona ye te mpamba te bato bazalaki ebele. Yango wana, akimaki mbangu mpe amataki na nzete moko mpo amona ye malamu. Ntango Yesu amonaki mposa makasi oyo Zakai azalaki na yango ya koluka komona ye, ayebisaki ye ete akokende na ndako na ye. Zakai asepelaki mingi ntango ayambaki mopaya monene wana.

Makambo oyo Zakai amonaki mpe ayokaki na ntango oyo alekisaki na Yesu esimbaki motema na ye mpe etindaki ye abongola motema. Alobaki ete: “Talá! Ndambo ya biloko na ngai, Nkolo, nazali kopesa yango na babola, mpe eloko nyonso nabɔtɔlaki moto na efundeli ya lokuta nazali kozongisa yango mbala minei.”​—Luka 19:8.

Lisosoli ya Zakai eteyamaki, mpe ye ayokelaki yango. Azwelaki yango matomba mingi lisusu koleka. Kanisá ndenge oyo Zakai ayokaki ntango Yesu ayebisaki ye ete: “Na mokolo ya lelo lobiko eyei na ndako oyo.”​—Luka 19:9.

Ndakisa na ye ezali mpenza kolendisa! Ezali komonisa ete ata soki tozalaki na bomoi ya ndenge nini liboso, tokoki kobongwana. Lokola Zakai, tokoki koyoka maloba ya Yesu oyo ezali na Biblia mpe koyekola kokesenisa na malamu na mabe. Na bongo, lokola ntoma Petelo alobaki yango, ‘tokozala na lisosoli ya malamu.’ Tokoki kolanda lisosoli na biso oyo eteyami mpe kosala oyo ezali malamu.​—1 Petelo 3:16.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto