Mituna ya batángi
Mpo na nini Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Aprili 2002, na lokasa 11, paragrafe 7 elobi ete batisimo ya mai oyo Bayuda oyo bakómaki bandimi sika bazwaki na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.), ezalaki mpo na komonisa ete “bamipesi na Nzambe na nzela ya Klisto,” nzokande liboso likanisi ezalaki ete batisimo oyo Bayuda bazalaki kozwa banda na mobu 33 T.B. tii mobu 36 T.B. ezalaki kosɛngisa komipesa na Nzambe te?
Na mobu 1513 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), Yehova Nzambe apesaki Bayisalaele libaku malamu ya kokóma ekólo moko ya bosantu na miso na ye, soki ‘bakotosa monɔkɔ na ye mpe bakobatela kondimana na ye.’ Bango balobaki ete: “Tokosala yango nyonso elobi [Yehova].”—Exode 19:3-8; 24:1-8.
Kondima oyo Bayisalaele bandimaki kotosa kondimana ya Mibeko ya Moize emonisaki ete bamipesaki na Nzambe. Bana nyonso ya Bayuda oyo babotamaki nsima, babotamaki na kati ya ekólo wana oyo esilaki komipesa na Nzambe. Kasi, batisimo ya Bayuda oyo bakómaki bayekoli ya Yesu Klisto kobanda na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B. elimbolaki kaka te ete moto oyo azwi yango amimonisi na Nzambe lokola moto ya ekólo oyo esilaki komipesa na Nzambe. Ezalaki komonisa ete bamipesi na Yehova Nzambe, basali na ye boyokani moko ya sika na nzela ya Yesu Klisto. Na ndenge nini?
Mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B., elimo santu ekitelaki bayekoli soki 120 oyo bayanganaki na eteni ya ndako moko ya likoló na Yelusaleme; na nsima, ntoma Petelo atɛlɛmaki mpe abandaki kosakola epai ya ebele ya Bayuda ná baprozelite oyo batondaki wana mpo na kotala likambo nini esalemaki. Petelo apesaki mpenza litatoli ya solosolo; na nsima, alobaki na Bayuda oyo lisosoli na bango etungisamaki ete: “Bóbongola mitema, mpe tiká ete moko na moko na bino abatisama na nkombo ya Yesu Klisto mpo na kolimbisama ya masumu na bino.” Mpo na komonisa ete bandimi bilendiseli mosusu oyo Petelo apesaki bango, “baoyo bayambaki liloba na ye na motema mobimba babatisamaki, mpe na mokolo wana milimo soki nkóto misato ebakisamaki.”—Misala 2:1-41.
Bayuda oyo bazwaki batisimo nsima ya koyoka bilendiseli ya Petelo bazalaki te bato ya ekólo oyo esilaki komipesa na Nzambe? Bazalaki te bato oyo basilaki komipesa na Nzambe? Te. Ntoma Paulo akomaki ete: ‘Nzambe alongoli Mibeko na kobakáká yango nsɛtɛ na nzete ya mpasi.’ (Bakolose 2:14) Na nzela ya liwa ya Klisto na mobu 33 T.B., Yehova Nzambe alongolaki kondimana ya Mibeko oyo ezalaki kosala ete Bayisalaele bázala bato oyo bamipesá na Ye. Na ntango yango, Nzambe aboyaki ekólo oyo eboyaki Mwana na Ye. ‘Oyo ezalaki Yisalaele na mosuni’ ekokaki lisusu te kobɛta ntolo ete ezali ekólo ya bato bamipesá na Nzambe.—1 Bakolinti 10:18; Matai 21:43.
Kondimana ya Mibeko elongolamaki na mobu 33 T.B.; kasi ata nsima ya mobu wana, Nzambe akobaki komonisela Bayuda boboto na ye mpe kotyela bango likebi mpo na mwa ntango.a Ntango yango ekendaki tii na mobu 36 T.B., ntango Petelo ateyaki Koloneyi, moto ya Italie oyo azalaki kobanga Nzambe, ná libota na ye mpe bato mosusu oyo bazalaki Bayuda te. (Misala 10:1-48) Nini etindaki Yehova amonisela Bayisalaele boboto na ye mpo na mwa ntango?
Danyele 9:27 (NW) elobi ete: “[Masiya] asengeli kotika ete kondimana esala naino mpo na bato mingi na boumeli ya pɔsɔ moko.” Kondimana oyo batikaki ekoba naino kosala na boumeli ya mbula nsambo, to “pɔsɔ moko,” kobanda na mobu 29 T.B, ntango Yesu azwaki batisimo mpe abandaki mosala ya kosakola lokola Masiya, ezalaki kondimana ya Abalayama. Mpo na kokɔta na kondimana wana, esengelaki kaka kozala Moebele, elingi koloba nkɔkɔ ya Abalayama. Kondimana wana, oyo Yehova nde asalaki yango ye moko, ezalaki kopesa bato nzela te ya kokóma bato oyo bamipesi na Yehova. Yango wana, atako Bayuda oyo bandimaki mpe bazwaki batisimo nsima ya lisukulu oyo Petelo asalaki na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B. bazalaki bato Nzambe atyelaki bango likebi mpo bazalaki Bayuda, bakokaki lisusu te kobɛta ntolo ete bazali bato ya ekólo oyo emipesá na Nzambe, mpamba te kondimana ya Mibeko esilaki kolongolama. Esengelaki moto na moto kati na bango amipesa na Nzambe.
Kasi ezali mpe na ntina mosusu mpo na yango Moyuda mokomoko mpe moto mokomoko ya ekólo mosusu oyo azalaki komilakisa mpo na kozwa batisimo na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B. asengelaki komipesa na Nzambe. Ntoma Petelo alendisaki bato oyo bazalaki koyoka ye ete bábongola mitema mpe bábatisama na nkombo ya Yesu. Mpo na kosala bongo, esengelaki moto atika makambo ya mokili mpe andima Yesu lokola Nkolo mpe Masiya, lokola Nganga-Nzambe Monene, mpe lokola moto oyo afandi na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe kuna na likoló. Esengelaki bábelela nkombo ya Yehova Nzambe mpo bázwa lobiko na nzela ya Klisto Yesu, likambo oyo esɛngaki komonisa kondima kati na Klisto mpe kondima ye lokola Motambwisi na bango. Kobanda wana, ebongiseli oyo ezalaki kosalisa bato bázala na boyokani na Nzambe mpe masumu na bango elimbisama, ebongwanaki. Esengelaki ete Moyuda mokomoko oyo azalaki kondima Nzambe amonisa mpenza ete andimi ebongiseli wana ya sika. Na ndenge nini? Esengelaki amipesa na Nzambe mpe abatisama na mai na nkombo ya Yesu Klisto mpo na komonisa na miso ya bato nyonso ete amipesi na Nzambe. Batisimo ya mai ezalaki komonisa ete moto amipesi na Nzambe; na ndenge yango, bazalaki kosala boyokani ya sika na Nzambe na nzela ya Yesu Klisto.—Misala 2:21, 33-36; 3:19-23.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ntango Yesu Klisto amataki na likoló mpe alakisaki Yehova Nzambe motuya ya mbeka ya bomoi na ye ya moto, kondimana ya Mibeko ya Moize esukaki mpe nzela efungwamaki mpo na “kondimana ya sika” oyo elakamaki.—Yilimia 31:31-34.