“Bato mibale babɛtaki na ndako na biso”
“ELEKI mbula mibale, mwana na biso ya mwasi ya moke akufaki mpe likambo yango epesaki biso mawa mingi.” Yango ezali ebandeli ya mokanda moko oyo babimisaki na zulunalo Le Progrès, oyo ebimaka na Saint-Étienne, na France.
“Mélissa azalaki na sanza misato mpe abɛlaki maladi mabe oyo babengaka trisomie 18. Ezali mpasi mpo na kobosana mpenza likambo mabe oyo bozali kokanisa ete esengelaki koyela bino te. Atako tobɔkwamaki na Lingomba ya Katolike, tozalaki ntango nyonso kotuna ete: ‘Nzambe, soki ozali mpenza, mpo na nini otikaka nzela ete makambo ya boye esalema?’ ” Emonani polele ete mwasi oyo akomaki mokanda yango anyokwamaki na makanisi mpe azalaki komona ete akómi na nsuka. Mokanda na ye elobi lisusu boye:
“Mwa moke nsima ya makambo yango, bato mibale babɛtaki na ndako na biso. Nayebaki mbala moko ete bazali Batatoli ya Yehova. Nalingaki koyebisa bango na limemya nyonso ete nazali na mposa ya koyoka bango te, kasi namonaki mwa buku oyo balingaki kopesa ngai. Ezalaki kolobela ntina oyo Nzambe atiki nzela na bampasi. Yango wana nakɔtisaki bango na likanisi ete nasukisa bango. Na nse ya motema nazalaki koloba ete libota na ngai esí enyokwami mingi, mpe tomesaná koyoka maloba lokola ‘Nzambe apesaki biso ye, mpe Nzambe akamati ye.’ Tosalaki na Batatoli yango koleka ngonga moko. Bayokaki ngai na boboto mpenza, mpe na nsuka ya lisolo na biso, namiyokaki malamu mpenza mpe nandimaki ete báya kotala ngai lisusu mokolo mosusu. Likambo yango esalemaki eleki mbula mibale. Nakómá Motatoli ya Yehova te, kasi nabandá koyekola Biblia na bango, mpe nayanganaka na makita na bango mbala na mbala.”