Ndenge Nzambe atalelaka bato oyo bakufá
TOYOKAKA mpasi mingi ntango ndeko to moninga na biso akufi. Toyokaka mpenza lokola nde tozangi eloko moko, totikali biso moko, mpe tobungisi nyonso. Ntango moto abungisi ndeko to moninga, akoki komiyoka lokola nde bakati ye mabɔkɔ, mpamba te moto moko te awa na mabelé, ata azali na mbongo, azali moto monene to azali na nguya ndenge nini, akoki kozongisa moto oyo akufi na bomoi.
Nzokande Mozalisi atalelaka makambo ndenge mosusu. Lokola asalaki moto na mputulu, azali mpe na likoki ya kozongisa moto oyo akufi na bomoi. Yango wana, Nzambe atalelaka bato oyo bakufá lokola nde bazali na bomoi. Mpo na basaleli ya sembo ya Nzambe oyo bakufá, Yesu alobaki boye: “Epai na [Nzambe] bango nyonso bazali na bomoi.”—Luka 20:38.
Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, azalaki na nguya ya kosekwisa bakufi. (Yoane 5:21) Na bongo, ye mpe atalelaka bato ya sembo oyo bakufá ndenge Tata na ye atalelaka bango. Na ndakisa, ntango moninga na ye Lazalo akufaki, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Nazali kokende . . . mpo na kolamwisa ye na mpɔngi.” (Yoane 11:11) Na miso ya bato, Lazalo akufaki, kasi mpo na Yehova ná Yesu, Lazalo alalaki nde mpɔngi.
Ntango Yesu akoyangela mokili, ekozala “na lisekwa moko ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.” (Misala 24:15) Na nsima, bakoteya bato oyo bakosekwa makambo ya Nzambe mpe bakopesa bango elikya ya kozala na bomoi ya seko awa na mabelé.—Yoane 5:28, 29.
Ya solo, ntango ndeko to moninga na biso moko akufi, tokoki koyoka mawa mpe mpasi mingi, mpe yango ekoki koumela bambula mingi. Nzokande, soki tozali kotalela bato oyo bakufá ndenge Nzambe atalelaka bango, ekoki mpenza kobɔndisa biso mpe kopesa biso elikya.—2 Bakolinti 1:3, 4.