Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 15/1 nk. 8-9
  • “Banzete ya Yehova etondi na mai”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Banzete ya Yehova etondi na mai”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Masolo mosusu
  • Bazamba
    Lamuká!—2023
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 15/1 nk. 8-9

Kitoko ya biloko oyo Yehova akelá

“Banzete ya Yehova etondi na mai”

OSÍ okɔtá na kati ya zamba mpe omoni ndenge kongɛnga ya moi esalaka banzelanzela oyo ezali kokatisa banzete mineneminene? Oyokaki mwa makɛlɛlɛ oyo nkasa ya banzete esalaka ntango mopɛpɛ ezali kobɛta yango?​—Yisaya 7:2.

Na bamboka mosusu, na bileko mosusu ya mbula, nkasa ya banzete ekómaka motane, mosusu langi ya mosaka, mpe balangi mosusu ndenge na ndenge. Na bileko yango, zamba emonanaka lokola nde ezali kopela mɔtɔ! Ezalaka mpenza lokola nde ezali kokokisa maloba oyo: “Bandá koyemba, ɛ bino ngomba, mpe zamba mpe nzete nyonso kati na yango”!​—Yisaya 44:23.a

Soki tokaboli mabelé mobimba na biteni misato oyo ezali na bonene moko, zamba nyonso ya mokili ekoki kozipa eteni moko. Zamba mpe bikelamu ya bomoi oyo etondi kati na yango ekumisaka mpenza Mokeli na yango, Yehova Nzambe. Mokomi ya nzembo ayembaki ete: “Bósanzola [Yehova] . . . nzete oyo ya mbuma mpe nzete minene minene.”​—Nzembo 148:7-9.

Na buku moko (The Trees Around Us) bakomi boye: “Banzete ezali na ntina mingi na bomoi ya moto, ezala mpo na biloko oyo azalaka na yango mposa to mpo na kitoko na yango.” Zamba ebatelaka mpe epɛtolaka mai oyo tomɛlaka. Lisusu, banzete epɛtolaka mopɛpɛ. Nkasa ya nzete ebendaka mopɛpɛ mabe (dioxyde de carbone); na nsima, baselile na yango esangisaka yango na mai, biloko ya ntina ndenge na ndenge mpe pole ya moi, mpe ebongolaka yango biloko ya ntina oyo nzete esengeli na yango mpe ebimisaka mopɛpɛ ya malamu (oxygène) oyo biso bato topemaka.

Zamba ezalaka kitoko mpenza. Zamba ezalaka mingimingi na banzete ya minene. Longola yango, ezalaka mpe na makenzi, kombɛ, nkɛkɛlɛ, banzete mike, mpe matiti. Mpiɔ oyo banzete ya minene epesaka mpe bipɔli oyo eutaka na nkasa oyo ekweisaka ekolisaka milona yango.

Na bazamba mosusu ya minene, na ntango ya elanga, nkasa soki milio 25 ekoki kokwea na etando ya hectare moko. Nkasa yango ekómaka nini? Nyama-nkɛkɛ, mayebo, nkusu, mpe biloko mosusu ya bomoi elyaka yango mpe ebongolaka yango bipɔli oyo ebongisaka mabelé. Ntango biloko yango ezali kobongola nkasa na bipɔli, ata eloko moko te ebungaka.

Ebele ya bikelamu ya bomoi ebotamaka na kati ya mabelé, na nse ya nkasa ekufá. Buku moko (The Forest) elobi ete “bikelamu soki 1 350 . . . ekoki kozala na mwa etando ya santimɛtrɛ-kare 30 mpe na bozindo ya santimɛtrɛ 2,5, bakisa mpe ebele ya bikelamu ya bomoi oyo emonanaka na miso te.” Lisusu, zamba ezali mboka ya banyoka, bandɛkɛ, nyama-nkɛkɛ, mpe banyama. Nani abongi kozwa lokumu mpo na zamba kitoko mpe ebele ya biloko oyo ezali kati na yango? Mozalisi na yango alobi solo ete: “Nyama nyonso ya zamba ezali ya ngai mpe bibwele likoló ya ngomba nkóto na nkóto.”​—Nzembo 50:10.

Na eleko ya mpiɔ makasi na mikili ya Mpoto, banyama mosusu balalaka mpɔngi mpe balyaka eloko te na boumeli ya basanza mingi kozanga ete ekufa. Kasi, nyama nyonso te nde elalaka mpɔngi molai ndenge wana. Ata na ntango ya mpiɔ makasi, okomona etonga mobimba ya mbuli oyo ezalaka na maseke oyo ezali na bitape ezali kotambola na zamba. Mbuli yango elalaka mpɔngi ya basanza te, ebombaka mpe bilei te, kasi etambolatambolaka, elyaka nkasa mpe nzete mikemike, ndenge tozali komona na fɔtɔ oyo bakangaki na Allemagne.

Biblia elobeli milona mingi. Bato mosusu batángaki mpe bamonaki ete Biblia elobeli milona pene na 130, kati na yango, nzete soki 30. Michael Zohary, moto moko ya mayele oyo ayekolaka banzete, alobaki mpo na nini yango ezali likambo ya ntina: “Na mokanda oyo ezali ya botanike te, okoki te kokuta bisika ebele oyo balobeli banzete oyo basalelaka na makambo ndenge na ndenge ya bomoi lokola na Biblia.”

Banzete mpe bazamba ezali makabo kitoko ya Mozalisi oyo atondi na bolingo. Soki tosí tozwá libaku ya kotambola na kati ya zamba, na ntembe te tokoloba lokola mokomi ya nzembo ete: “Nzete ya [Yehova] etondi na mai; ɛlɛzɛ ya Lebanona, yango ekonaki ye. Esika yango ndɛkɛ bakotongaka ndako na bango.”​—Nzembo 104:16, 17.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá Calendrier des Témoins de Jéhovah 2004, Yanuali/Febwali.

[Etanda/Bililingi na lokasa 9]

Nzete ya amande ezali moko ya banzete minene ya mbuma na Moyen-Orient. Na ebandeli ya mbula, ebimisaka nkasa ya sika liboso ya banzete mingi mosusu. Na ntango ya kala, Baebele bazalaki kobenga amande nzete oyo elamwisaka, mpo ebimisaka nkasa mpe fololo liboso mpenza ya banzete mosusu. Nzete yango ebimisaka bafololo ya langi ya rozɛ to ya mpɛmbɛ.​—Mosakoli 12:5.

Na kati ya mitindo ya ndɛkɛ soki 9 000 oyo eyebani, soki 5 000 eyembaka. Bandɛkɛ yango eyembaka ata na kati mpenza ya zamba. (Nzembo 104:12) Na ndakisa, mokɛngɛli-mboka ezali na banzembo kitoko mpenza. Ndɛkɛ babengi fauvette, lokola oyo ezali na elilingi oyo, eyembaka mpe nsala na yango ezali na langi ya mputulu, esangani na motane mpe mai ya pondu.​—Nzembo 148:1, 10.

[Elilingi na lokasa 9]

Zamba na etúká ya Normandie, na France

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto