Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 15/2 lok. 32
  • Mpo na nini Batatoli ya Yehova batikaka te koya kotala yo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini Batatoli ya Yehova batikaka te koya kotala yo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 15/2 lok. 32

Mpo na nini Batatoli ya Yehova batikaka te koya kotala yo?

BATATOLI ya Yehova bayebani na mokili mobimba ete balɛmbaka te na mosala na bango ya kosakola ndako na ndako. Bato mosusu bamitunaka mpo na nini Batatoli batikaka te koya na bandako na bango, ata soki bayambaki bango malamu te mbala ya liboso. Mikanda mibale oyo ekomamaki na bato ya Russie ezali kosalisa biso tóyeba ntina.

Masha, elenge mwasi moko ya mbula 19, afandaka na engumba Khabarovsk, akomaki boye: “Mpo na koloba solo, nazalaki kokima Batatoli ya Yehova ndenge moto akimaka maladi mabe.” Kasi, nsima ya kotánga mwa bazulunalo na bango, makanisi na ye ebongwanaki. Masha akomaki boye: “Bazulunalo yango esepelisaka mpe efungolaka mayele, kasi likambo ya ntina koleka, esalisaka moto akóma kotalela mokili na ndenge mosusu. Mokemoke, nabandaki koyeba ntina ya bomoi.”

Svetlana afandaka na engumba Ussuriysk, na ntaka ya kilomɛtrɛ 80 na nɔrdi ya Vladivostok, akomaki boye: “Nabandi kotánga Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ná Lamuká! kala te. Na mikolo na biso, bato basengeli mpenza kotángaka bazulunalo yango. Nasepelaka na masolo na yango nyonso. Masolo yango esepelisaka, eteyaka, mpe efungolaka mayele. Natɔndi bino! Natɔndi bino mingi mpo na mosala malamu oyo ezali na ntina mingi mpo na bato na mokili oyo.”

Batatoli ya Yehova ya mokili mobimba batalelaka na lisɛki te motuna oyo ntoma Paulo atunaki ete: “Mpe, ndenge nini bakoyoka nsango soki moto oyo akosakola azali te?” (Baloma 10:14) Na yango, soki Batatoli bayei lisusu kotala yo, meká naino koyoka bango ata mwa miniti moke. Ntango mosusu yo mpe okosepela na nsango ya kobɔndisa oyo ezali na kati ya Biblia, Liloba ya Nzambe.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto