Kondima ekoki kobikisa moto na maladi?
NTANGO tobɛli tozalaka na mposa ya kobika. Na ntembe te, oyebi ete Biblia elobaka ete Yesu azalaki kobikisa bamaladi ya ndenge na ndenge, mpe na bongo, abɔndisaki ebele ya bato. Abikisaki bamaladi yango na nguya nini? Biblia elobi ete abikisaki yango na ‘nguya ya Nzambe.’ (Luka 9:42, 43; Misala 19:11, 12) Na bongo, elimo santu ya Nzambe nde ezalaki kobikisa, kasi kondima ya moto te. (Misala 28:7-9) Yango wana Yesu azalaki te kosɛnga na bato ya maladi ete bázala naino na kondima epai na ye liboso bábika.
Kasi ntango mosusu okoki komituna boye: ‘Kobikisa bato na ndenge ya likamwisi ezali nde makambo eleká to makamwisi ya lolenge oyo Yesu asalaki ekosalema lisusu? Elikya nini ezali mpo na baoyo bazali konyokwama na maladi makasi to oyo esilaka te?’
Biblia ezali koyebisa biso ete na mokili ya sika ya Nzambe oyo ekozala na boyengebene, nguya ya Nzambe ekosala lisusu makamwisi ya kobikisa bato na maladi lolenge oyo Yesu asalaki ntango azalaki awa na mabelé. Batatoli ya Yehova na esika ofandi bakozala na esengo ya koyebisa yo ndenge nini mpe ntango nini Nzambe akokokisa likambo oyo bato oyo babikisaka maladi na mabondeli bakoki kosala te—akosilisa maladi nyonso mpe liwa. Ya solo, Nzambe “akosilisa kufa libela.”—Yisaya 25:8.