Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 15/4 lok. 3
  • Mokano ya Nzambe nde ezali kosalema?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokano ya Nzambe nde ezali kosalema?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Masolo mosusu
  • Salá na boyokani ná libondeli ya ndakisa—Eteni I
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • “Nkolo, teyá biso ndenge ya kobondela”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Tosengeli nde kobondela Yesu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 15/4 lok. 3

Mokano ya Nzambe nde ezali kosalema?

“Tiká mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé.”​—Matai 6:10.

JULIO ná Christina bayokaki nsɔmɔ na komona bana na bango minei bazali kozika na mɔtɔ. Batɛlɛmisaki motuka na bango esika moko mpe sofɛlɛ moko oyo alangwaki masanga ayaki kotuta yango, mpe epelaki mɔtɔ. Balongaki kobikisa mwana ya mitano, Marcos, kasi mɔtɔ ezikisaki ye nzoto mpe ebebisaki ye elongi mpo na libela. Marcos azalaki na mbula libwa. Likambo yango epesaki tata na ye mpasi mingi. Amilendisaki mpe alendisaki libota na ye na maloba oyo: “Ezali mokano ya Nzambe, tosengeli kondima yango, ezala malamu to mabe.”

Bato mingi balobaka bongo ntango makambo ya nsɔmɔ ndenge wana esalemi. Balobaka boye: ‘Soki Nzambe azali na nguya nyonso, likambo oyo esalemi esengeli kozala kaka mpo na bolamu na biso, ata soki biso moko tokoki komona bolamu yango te.’ Ondimaka likanisi yango?

Mbala mingi, bato oyo balobaka ete makambo nyonso oyo ekómelaka biso, ezala ya malamu to ya mabe, ezali mokano ya Nzambe, bakanisaka maloba oyo ezali na Libondeli ya Nkolo oyo Yesu ateyaki, oyo totángi na ebandeli. Toyebi malamu ete mokano ya Nzambe ezali kosalema na likoló. Ntango tobondelaka ete ‘Tiká mokano na yo esalema na mabelé,’ tomonisaka te ete tozali kondima ete nyonso oyo ezali kosalema na mabelé ezali mokano ya Nzambe?

Bato mingi bandimaka likanisi yango te. Balobaka ete makambo oyo ezali kosalema emonisaka ete Nzambe ayokelaka bato oyo akelá mawa ata moke te. Batunaka boye: ‘Ndenge nini Nzambe ya bolingo akoki kosala ete makambo ya mabe ekómelaka bato oyo basali mabe te? Nzambe alingaka tózwa liteya nini na makambo ya mabe oyo ezali kokómela biso?’ Mbala mosusu yo mpe omitunaka bongo.

Na likambo yango, Yakobo, ndeko ya Yesu, akomaki boye: “Ntango moto azali na kati ya komekama, aloba te ete: ‘Nazali komekama na Nzambe.’ Mpo Nzambe akoki komekama na makambo ya mabe te mpe ye moko akoki te komeka moto na yango.” (Yakobo 1:13) Makambo ya mabe eutaka epai ya Nzambe te. Na yango, emonani polele ete makambo nyonso te oyo ezali kosalema lelo oyo na mabelé ezali mokano ya Nzambe. Biblia elobeli mpe mokano ya bato, mokano ya bikólo, ata mpe mokano ya Zabolo. (Yoane 1:13; 2 Timote 2:26; 1 Petelo 4:3) Ondimi ete likambo oyo ekómelaki Julio ná Christina ekoki te kozala mokano ya Tata ya bolingo oyo azali na likoló?

Na yango, Yesu alingaki koloba nini ntango ateyaki bayekoli na ye básambelaka ete: “Tiká mokano na yo esalema”? Alingaki nde koloba ete tóbondelaka Nzambe asalisa biso na makambo oyo ekómelaka biso, to ateyaki biso nde ete tóbondelaka mpo na likambo moko ya ntina mingi mpe ya malamu koleka, elingi koloba mbongwana moko oyo ekotalela bato nyonso? Tótalela na mozindo biyano ya Biblia na mituna yango.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]

Motuka: Dominique Faget-STF/AFP/Getty Images; mwana: fɔtɔ ya FAO/B. Imevbore

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto