Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 1/5 lok. 32
  • Olendisamaka na liloba ya Nzambe?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Olendisamaka na liloba ya Nzambe?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 1/5 lok. 32

Olendisamaka na liloba ya Nzambe?

OSALAKA nini ntango okutani na mikakatano? Mpo na kolonga komekama ya Satana, Yesu amikundolaki bavɛrsɛ ya Biblia oyo elobeli likambo oyo Satana azalaki komeka ye na yango. (Matai 4:1-11) Ndenge moko mpe, ntango Mokonzi Davidi akutanaki na mikakatano, liloba ya Nzambe elendisaki ye. Davidi alobaki boye: “Ntango makanisi ya kobulunganisa etondelaki ngai, mabɔndisi na yo ekómaki kobondela molimo na ngai.”​—Nzembo 94:19, NW.

Ndenge moko mpe, ntango tokutani na mokakatano, soki tomikundoli vɛrsɛ moko oyo tolingaka mingi, yango ekoki kobɔndisa to mpe kolendisa biso. Na ndakisa, Rex, oyo azali sikoyo na mbula 89, azalaki mobongisi-nzela banda 1931. Alobaki boye: “Mbala mingi nazalaki komona ete nakokoka te mokumba oyo bapesi ngai na mosala ya kosakola.” Azalaki kosala nini? “Nazalaki komikundola vɛrsɛ na ngai oyo nasepelaka na yango mingi, Masese 3:5, oyo elobi: ‘Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te.’ Komikundola mpe kosalela vɛrsɛ oyo esalisaki ngai nakokisa mikumba na ngai malamu.”

Ata bana mike mpe bazwaka matomba soki bazali na vɛrsɛ moko oyo balingaka mingi. Jack, oyo azali na mbula motoba, alobi ete vɛrsɛ oyo ye alingaka mingi ezali Matai 24:14. Vɛrsɛ yango nde etindaka ye abima na mosala ya kosakola elongo na baboti na ye. Alobi ete: “Nasepelaka kobima na mosala ya kosakola elongo na mama, na tata, mpe na yaya na ngai ya mwasi mokolo ya pɔsɔ nyonso.”

Kondima na yo mpe emekamaka na bantango mosusu lokola oyo ya Yesu emekamaká? Soki ezali bongo, Bafilipi 4:13 ekoki kokóma moko ya bavɛrsɛ oyo osepelaka na yango mingi. “Makanisi na yo mpe ebulunganaka” lokola ya Mokonzi Davidi ebulunganaká? Soki ezali bongo Bafilipi 4:6, 7 ekoki kosalisa yo olonga mokakatano yango. Omonaka ntango mosusu ete mosala oyo ozali kosalela Nzambe ezali mosala ya mpunda? Na bongo komikundola 1 Bakolinti 15:58 ekolendisa yo.

Ntango tozali tokanga na motó bavɛrsɛ oyo ekokani na likambo boye to boye, tozali kopesa nzela na Liloba ya Nzambe ezala na nguya na kati ya bomoi na biso. (Baebele 4:12) Bavɛrsɛ yango ekopesa biso makasi mpe libɔndisi.​—Baloma 15:4.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto