Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 15/5 lok. 32
  • Sɛkɛlɛ ya bomoi molai mpe ya esengo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Sɛkɛlɛ ya bomoi molai mpe ya esengo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 15/5 lok. 32

Sɛkɛlɛ ya bomoi molai mpe ya esengo

BALOBAKA ete: “Moto nyonso alingaka koumela na bomoi, kasi moto moko te alingaka kokóma mobange.” Bato mingi oyo bapusani na mbula bazelaka na mposa mpenza mokolo oyo bakozwa pansyo mpamba te, bamonaka ete bakokóma na ntango mingi mpe bakozala lisusu na mikumba mingi te. Kasi, bamitunaka ete soki bazwi pansyo, bakozanga nde makambo ya kosala to bakomonana te ete bazali lisusu na ntina te? Babangaka mpe ete mbala mosusu bakozala lisusu na bato ya kosolola na bango te, bakozala lisusu na esengo te, mpe bakozala lisusu nzoto kolɔngɔnɔ te.

Na yango, sɛkɛlɛ ya bomoi ya esengo ezali nini? Moto nyonso, azala mokóló to mwana moke, azalaka na esengo soki azali na baninga mpe bandeko oyo balingaka ye. Kasi, makambo ya ntina ezalaka kaka te oyo basusu bakoki kosalela mobange. Makambo oyo mobange akoki kosalela basusu nde ezalaka na ntina koleka.

Bato ya mayele bayekolaki na boumeli ya bambula mingi bomoi ya mabala 423 ya mibange mpe bamonaki ete “kosala makambo mpo na bolamu ya bato mosusu ebongisaka bomoi na biso moko.” Stephanie Brown, mokambi ya boyekoli yango, alobaki boye: “Likambo yango emonisi ete bolamu eutaka te na makambo oyo baninga bazali kosala mpo na biso, kasi nde na oyo biso tozali kosala mpo na bango.” Makambo oyo tokoki kosalela basusu ezali, na ndakisa, kosalisa bango na misala ya ndako, kobatela bana, kokende kosomba biloko, komema bango na motuka to kokabela bango mwa mbongo ya kofuta tike, to koyoka moto oyo azali na mposa ya kosolola.

Eleki sikoyo mbula soki 2 000, Yesu Klisto alobaki ete: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.” (Misala 20:35) Sɛkɛlɛ ya bomoi molai mpe ya esengo ezali te kozala na mbongo mingi na banki, to kosalela bankisi to kolya bilei oyo esalaka ete moto anuna noki te. Kasi, ezali nde kozala ntango nyonso na makambo ya kosala, mpe kosalela ntango mpe makasi na biso mpo na kosala makambo mpo na bolamu ya basusu.

Atako bongo, yango mpe ekoki kaka te mpo na kopekisa ete tónuna te, tóbɛla te, to mpe tókufa te. Kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa makambo wana. Ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela, maladi ekozala lisusu te, ata mpe “liwa ekozala lisusu te.” (Emoniseli 21:3, 4; Yisaya 33:24) Kutu, bato ya botosi bakozala na bomoi ya esengo libela na libela na paladiso awa na mabelé. (Luka 23:43) Batatoli ya Yehova bazali na esengo ya kosalisa basusu na koyeba sɛkɛlɛ wana oyo Biblia emonisi mpo na kozala na bomoi molai mpe ya esengo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto