Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 15/9 lok. 32
  • ‘Bóluka banani babongi’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Bóluka banani babongi’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 15/9 lok. 32

‘Bóluka banani babongi’

NA EKEKE ya liboso ya ntango na biso (T.B.), Damasi ezalaki engumba ya bozwi mingi. Lokola banzete ya mbuma ezalaki mingi na mboka yango, bato ya mombongo oyo bazalaki kouta na bamboka ya ɛsti bazalaki kopema wana. Mwa moke nsima ya liwa ya Yesu Klisto, lisangá moko ya boklisto efungwamaki na Damasi. Na lisangá yango, ezalaki na Bayuda oyo ekoki kozala ete bakómaki bayekoli ya Yesu na mokolo ya Pantekote na Yelusaleme na mobu 33 T.B. (Misala 2:5, 41) Ekoki mpe kozala ete bayekoli mosusu bakimaki na Damasi ntango monyoko makasi ebimaki na Yudea nsima ya kobomama ya Setefano.​—Misala 8:1.

Soki na mobu 34 T.B., Ananiasi, moklisto moko ya Damasi, azwaki mokumba moko ya kokamwa. Nkolo alobaki na ye boye: “Tɛlɛmá, kende na balabala oyo ebengami Alima, mpe na ndako ya Yuda luká moto moko nkombo na ye Saulo, moto ya Talasi. Mpo, talá! azali kobondela.”​—Misala 9:11.

Balabala ebengami Alima ezalaki na bolai ya kilomɛtrɛ soki moko na ndambo mpe ezalaki na katikati mpenza ya engumba Damasi. Liyemi ya ekeke ya 19 oyo tozali komona na lokasa oyo ezali komonisa biso mwa moke ndenge balabala yango ezalaki na ntango ya kala. Soki totali ndenge bandako ya balabala yango etongamaki, emonani ete Ananiasi aumelaki mwa mingi na koluka ndako ya Yuda. Nsukansuka, akómaki na ndako yango, mpe asalisaki Saulo akóma ntoma Paulo, mosakoli ya molende ya nsango malamu. ​—Misala 9:12-19.

Yesu atindaki bayekoli na ye mpe alobaki na bango ete ‘báluka banani babongi’ na nsango malamu. (Matai 10:11) Emonani ete Ananiasi alukaki mpenza Paulo. Lokola Ananiasi, Batatoli ya Yehova bazali koluka na esengo mpenza bato oyo babongi mpe basepelaka komona bango bazali kondima nsango malamu ya Bokonzi. Na ntango wana bamonaka ete basalaki mosala ya mpunda te.​—1 Bakolinti 15:58.

[Elilingi na lokasa 32]

“Balabala oyo ebengami Alima” na moi ya lelo

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 32]

Euti na buku La Tierra Santa, Volimi II, 1830

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto