Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 15/10 lok. 32
  • Okoki komona na makanisi makambo oyo ozali kotánga?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okoki komona na makanisi makambo oyo ozali kotánga?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 15/10 lok. 32

Okoki komona na makanisi makambo oyo ozali kotánga?

MPO na komona na makanisi makambo oyo ozali kotánga, ezali malamu oyeba bisika oyo bazali kolobela. Tózwa na ndakisa mibembo ya ntoma Paulo na mosala ya misionɛrɛ oyo balobeli na mokanda ya Misala. Abandaki mobembo na ye ya liboso na Antiokia, epai bayekoli ya Yesu babengamaki baklisto mpo na mbala ya liboso. Longwa wana, akendeki na bamboka lokola Salamisi, Antiokia ya Pisidia, Ikoniumu, Lisitala, mpe Delebe. Okoki kozala na likanisi ya esika bamboka wana ezalaki?

Mbala mosusu, okozala na likanisi ya bisika yango kaka soki ozali na karte. Mwa buku ya sika ya nkasa 36, oyo ezali na motó ya likambo ‘Voyez le bon pays,’ ezali na karte wana. Mwasi moko na etúká ya Montana, na États-Unis, oyo atángaki mwa buku yango alobi boye: “Sikoyo nakoki komona na makanisi bisika oyo Paulo atambolaki na mibembo na ye mpe mosala oyo ye ná baklisto mosusu ya ekeke liboso basalaki mpo na kopalanganisa nsango malamu. Matɔndi mingi mpo na mwa buku yango oyo ezali kosalisa biso tómona na makanisi bisika yango.”

Karte ya mibembo ya Paulo ezali kaka moko ya bakarte oyo ezali na mwa buku yango oyo ekoki kosalisa motángi amona na makanisi makambo oyo Biblia elobeli. Okoki kosɛnga mwa buku ‘Voyez le bon pays,’ soki otondisi eteni ya lokasa oyo ezali na nse mpe otindi yango na adrɛsi oyo etyami awa to na adrɛsi oyo ebongi na yo kati na oyo ezali na lokasa 2 ya zulunalo oyo.

□ Bótindela ngai mwa buku ‘Voyez le bon pays.’

□ Bóya kotala ngai mpo na koyekola na ngai Biblia kozanga kofuta mbongo.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 32]

Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto