Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 15/4 nk. 3-4
  • Makambo ya koyekola eleki mingi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo ya koyekola eleki mingi?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Masolo mosusu
  • Tózwa boyebi sikoyo mpe mpo na libela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Bato bazali na mposa ya boyebi ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mpo na nini tozali na mposa na boyebi ya solo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Tolanda kokóla kati na boyebi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 15/4 nk. 3-4

Makambo ya koyekola eleki mingi?

Na wɛsti ya Afrika, mobali moko ná mwasi na ye bafandi na llibongo mpe bazali kotala sanza. Mobali alobi boye: “Bato bayebi makambo nini mpe makambo nini bayebi naino te mpo na sanza?”

Mwasi abakisi boye: “Kanisá soki tokokaki komona mabelé na mosika ndenge tozali komona sanza—makambo nini bato bayekoli mpe makambo nini bayebi naino te? Kanisá naino! Toyebi ete mabelé ebalukaka zingazinga ya moi, kasi yango moko moi ná baplanɛti nyonso oyo ebalukaka zingazinga na yango etɛlɛmá esika moko te. Elingi koloba ete mbala mosusu tokozonga lisusu te na esika oyo tozali sikoyo na kati ya molɔ́ngɔ́. Toyebi kaka ete esika oyo tozali ekabwani ntaka boye to boye na moi to na minzoto. Toyebi makambo mingi mpo na biloko mosusu, kasi tokoki mpe koloba ete toyebi ata te esika oyo tozali!”

MAKANISI yango emonisi mwa makambo mingi ya solo. Emonani ete ezali na makambo mingi oyo toyebi naino te. Toboyi te, mokolo na mokolo toyekolaka makambo ya sika. Kasi, ata soki toyekoli makambo mingi ndenge nini, tokokoka te koyekola makambo nyonso oyo tozali na mposa ya koyeba.

Ya solo, longola koyekola makambo ya sika, biso bato tokómi mpe na makoki mingi ya kobomba makambo oyo tosili koyeba. Mayele ya siansi esalisi biso tókóma na makoki mingi ya kobomba makambo oyo tosili koyekola. Na ndakisa, ordinatɛrɛ ekoki kobomba makambo ebele mpenza. Lisusu, eloko lokola CD-ROM ekoki kobomba makambo mingi (koleka 680 mégaoctets). Diskɛ oyo babengi DVD ekoki kobomba makambo ata mbala nsambo koleka oyo ekoki kokɔta na CD-ROM; kutu, bazali kobimisa mosusu oyo ezali makasi koleka.

Lelo oyo, bato bazali kosalela mayele ya kokamwa mpo na kopanza makambo oyo bayekoli. Bamasini ya imprimeri ezali kobimisa bazulunalo ná babuku nokinoki mpenza. Moto akoki mpe kokuta makambo ebele na Internet. Na babuku, Internet, mpe bisaleli mosusu, moto azali kokuta ebele ya makambo koleka oyo akoki koyekola. Bato mosusu balobaki ete boyebi nyonso wana ezali lokola mai ya mbu, eleki ebele na boye ete tosengeli nde koyeba kosukola kati na yango, na esika tóluka komɛla yango nyonso. Lokola makambo yango eleki ebele, ezali kosɛnga tóyeba kopona.

Ntina mosusu oyo tosengeli kopona makambo ya koyekola ezali ete makambo mingi ezali na ntina moko te. Kutu, makambo yango mosusu tozali ata na mposa na yango te, ezali na ntina te tóyeba yango. Tóbosana te ete tozwaka nde boyebi ya makambo, oyo ekoki kozala ya malamu to ya mabe. Longola nyonso wana, makambo mosusu oyo bato bakanisaka ete ezali solo ezalaka lokuta. Mbala mingi maloba oyo ata bato minene mpe ya lokumu balobaki emonanaki na nsima ete ezali lokuta. Tózwa ndakisa ya kalaki ya engumba ya Efese ya kala; na ntembe te bazalaki kotalela ye lokola moto oyo ayebi makambo mingi. Nzokande, mosali yango ya Leta alobaki boye: “Nani mpenza na kati ya bato ayebi te ete engumba ya Baefese ezali mokɛngɛli ya tempelo ya Alatemisi monene mpe ya elilingi oyo ekweaki uta na likoló?” (Misala 19:35, 36) Atako bato nyonso bayebaki likambo yango mpe bazalaki kobɛtela yango ntembe te, nzokande ezalaki solo te ete elilingi yango eutaki na likoló. Yango wana, Biblia Mosantu ezali kolendisa baklisto bákeba na “oyo ebengami na lokuta mpenza ete ‘boyebi.’”​—1 Timote 6:20.

Ntina monene oyo tosengeli kopona makambo ya koyekola ezali ete bomoi ezali mokuse. Ozala mokóló to elenge, ezali na makambo mingi oyo okoki kosepela koyekola, kasi omonaka ete okokoka te koyekola yango nyonso mpo bomoi na yo ezali mokuse.

Mokakatano yango ekosila mokolo mosusu? Ezali nde na boyebi oyo ekoki kosalisa biso tózala na bomoi ya molai, ata mpe ya libela? Boyebi yango ekoki komonana lelo oyo? Soki ezali, bato nyonso bakoki kozwa yango? Ekozala na mokolo moko oyo makambo nyonso oyo tokoyekola ekozala kaka solo? Mobali ná mwasi oyo tolobelaki na ebandeli bazwaki biyano ya malamu na mituna yango; yo mpe okoki kozwa yango. Tolendisi yo otánga lisolo oyo elandi mpo ekofungolela yo nzela ya koyekola makambo libela na libela.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto