Lisalisi mpo na kolonga mitungisi
EKÓMELAKA yo omitungisa mingi? Osilikaka, oyokaka mawa to mpasi na motema mpambampamba? Mitungisi ya bomoi elekelaka yo? Nini ekoki kosalisa yo?
Moto nyonso amitungisaka. Soki toyebi komipekisa mpo mitungisi elekela biso te, tokomona ete ezali kaka makambo oyo eyaka na bomoi ya moto. Kasi, Biblia elobi ete “monyoko ekoki kotinda moto ya bwanya asala makambo lokola moto ya ligboma.” (Mosakoli 7:7, NW) Na kati ya mokili oyo etondi na mobulu mpe na makama, moto nyonso amitungisaka ntango azali komona makambo oyo ezali kosalema. Nzokande, Biblia elobi mpe boye: “Likambo mosusu eleki malamu te, bobele ete moto asepela na misala na ye moko.” (Mosakoli 3:22) Yango wana, mpo tózala na bomoi ya malamu koleka, tosengeli koyeba ndenge ya kobatela makanisi ya malamu mpo tózalaka na esengo. Ndenge nini tokoki kozala na makanisi ya malamu mpe kobwaka oyo ya mabe?
Mbala mingi, kosala makambo mosusu ekitisaka mitungisi. Na ndakisa, ntango makambo oyo tokoki kosilisa te ezali kotungisa biso, na esika tótya makanisi na biso na makambo yango, elekaka malamu tótika mwa moke makambo oyo tozali kosala to tóbima mwa moke. Makambo oyo ekoki kobosanisa biso mitungisi mpe kopesa biso esengo ezali, na ndakisa, kokende kotambola mwa moke mpo na kozwa mopɛpɛ, koyoka miziki ya malamu, kosala ngalasisi, to kosalela moto oyo azali na bosɛnga mwa mosala moko ya malamu.—Misala 20:35.
Kasi, lolenge eleki malamu mpo na kolonga mitungisi ezali kotyela Mozalisi motema. Soki mitungisi ezali kosila kaka te, tosengeli ‘kobwaka mitungisi na biso nyonso epai ya Nzambe’ na nzela ya libondeli. (1 Petelo 5:6, 7) Biblia elobi na biso ete: “[Yehova] azali penepene na bango bazali na mitema mitutami . . . Moyengebene azali na makambo mingi ya mpasi nde [Yehova] akobikisa ye kati na yango nyonso.” (Nzembo 34:18, 19) Ndenge nini tokoki kondimisama ete Nzambe akoki kozala ‘mosungi na biso mpe mobikisi na biso’? (Nzembo 40:17) Soki tozali koyekola Biblia mpe komanyola na masolo na yango oyo ezali komonisa ndenge oyo Nzambe amibanzabanzaki mpo na bolamu ya basaleli na ye.