Nzete ya Bonane eutá na Russie to na boklisto?
“NA EBANDELI ya bambula ya 1830, bato bazalaki koloba ete kotya nzete ya sapin na ndako ezali ‘momeseno ya bato ya Allemagne.’ Kasi, na nsuka ya bambula wana, bato minene ya Saint-Pétersbourg ‘bakómaki na momeseno’ yango. . . . Na ekeke ya 19, kaka bakonzi ya mangomba mpe bato ya mboka nde bazalaki kolinga kosalela nzete yango te. . . .
“Liboso ya ekeke 19, bato bazalaki mpenza kokipe . . . nzete yango te. Lokola na bonkɔkɔ ya bato ya Russie bazalaki kotalela yango lokola elembo ya liwa mpe ya ‘mokili ya bilimo,’ mpe lokola bazalaki na momeseno ya kotya nzete na nsamba ya banganda, ezalaki mbongwana monene oyo esalemaki na katikati ya ekeke 19. . . . Emonani polele ete mpo bábanda kotya nzete ya sapin na bandako, esengelaki bákóma kotalela yango ndenge bato ya Mpoto batalelaka yango mpe ekɔta na makambo oyo basalaka na fɛti ya Noele. . . .
“Mpo baklisto na Russie bándima nzete yango, ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te. Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse etɛmɛlaki likambo yango makasi. Bakonzi ya Lingomba bamonaki ete likambo yango ezalaki na ‘boyokani ná bademo,’ momeseno ya bapakano, oyo ezalaki ata na boyokani moke te ná mbotama ya Mobikisi, mpe lisusu, ezalaki momeseno oyo euti na Mpoto.”—Profesɛrɛ Éléna Douchtchénkina, doktɛrɛ na filoloji, na iniversite ya Saint-Pétersbourg.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa32]
Fɔtɔ ya Nikolai Rakhmanov