Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 1/2 lok. 32
  • Ozali lokola nzete ya lagani auna?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ozali lokola nzete ya lagani auna?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 1/2 lok. 32

Ozali lokola nzete ya lagani auna?

NA MBOKA moko oyo ezali penepene na engumba Port Moresby, na Papouasie-Nouvelle-Guinée, basakoli mibale oyo bautaki na mosala ya kosakola bazalaki kozonga na ndako. Na nzela, bamonaki nzete moko ya kitoko. Oyo ya mokóló alobaki: “Ee, nzete ya lagani auna!” Atalaki oyo ya elenge mpe alobaki: “Nkombo wana elimboli ‘nzete oyo ezongaka sika mbula na mbula.’ Na bokeseni na banzete mosusu oyo ekolaka na mikili ya molunge, nzete yango ekweisaka nkasa na yango mbula na mbula mpe emonanaka lokola ekufi. Nzokande, soki bambula ebandi kobɛta, ezongaka lisusu ya sika, ebimisaka bafololo mpe ezongelaka kitoko na yango.”

Tokoki kozwa liteya na nzete ya lagani auna to flamboyant, nkombo oyo bato mingi bayebi. Bato mosusu ya mayele batángaka yango na kati ya banzete mitano ya bafololo oyo eleki kitoko na mokili mobimba. Atako ekweisaka bafololo mpe nkasa na yango na eleko ya elanga, nzete yango ebombaka mai. Misisa na yango ezalaka makasi mpe ekoki kokangama na mabanga oyo ezali na nse mpenza ya mabelé. Yango nde esalaka ete epika mpenza na ntango ya mipɛpɛ makasi. Na mokuse, elongaka mikakatano ya ndenge nyonso.

Tokoki kokutana na mikakatano oyo ezali komeka kondima na biso. Nini ekosalisa biso tóyika mpiko? Lokola lagani auna, tokoki komɛlaka mpe kobombaka mai ya bomoi ya Liloba ya Nzambe. Tosengeli mpe kokangama makasi na ‘libanga na biso,’ Yehova, mpe na ebongiseli na ye. (2 Samwele 22:3) Ya solo, lagani auna ezali kokundwela biso ete ata na ntango ya mikakatano makasi, soki tozali kosalela bibongiseli oyo Yehova atyeli biso, tokotikala kaka makasi mpe kitoko na elimo. Soki tosali bongo, tokozwa “libula ya bilaka” oyo apesi; moko na yango ezali bomoi ya seko.​—Baebele 6:12; Emoniseli 21:4.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto