Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 15/2 lok. 32
  • “Elembo ya violɛ elimboli nini?”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Elembo ya violɛ elimboli nini?”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 15/2 lok. 32

“Elembo ya violɛ elimboli nini?”

MOBALI moko oyo asalaka na departema ya makambo etali bosembo (ministère de la Justice) na engumba Séoul, na ekólo Corée, akomaki boye: “Eleki mwa mikolo, Motatoli ya Yehova moko atikelaki ngai Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Nsima ya kotánga yango, nayebaki mwa makambo mosusu oyo Batatoli ya Yehova bakutanaki na yango ntango Banazi bazalaki koyangela mpe na ntango ya Bakoministe. Kasi, nalingi kotuna motuna moko. Na fɔtɔ ya ezipeli balakisi Batatoli ya Yehova balati bilamba oyo ezali na mwa elembo ya violɛ na ntolo. Elembo ya violɛ elimboli nini?”

Ntango Banazi bazalaki koyangela Allemagne, Batatoli ya Yehova baboyaki kopesa losako mpo na lokumu ya Hitler, baboyaki kokɔta na makambo ya politiki to kosala mosala ya soda. Yango wana, Banazi banyokolaki bango makasi, batindaki Batatoli soki 12000 na babolɔkɔ mpe na bakaa ya bakangami. Bato soki 2000 kati na bango bakufaki, mingi babomaki bango koboma.

Elembo ya violɛ oyo batyaki na bilamba na bango ya bolɔkɔ ezalaki na ndimbola nini? Buku moko (Anatomy of the SS State) elobi boye: “Etuluku mokomoko ya bakangami oyo bazalaki na bakaa [ya Banazi] bazalaki kolata elembo oyo ezalaki kokesenisa bango. Momeseno yango ebandaki liboso ya etumba; bazalaki kotonga mwa elamba ya langi moko boye likoló ya elamba ya bolɔkɔ: ya motane mpo na bato ya politiki; ya violɛ mpo na Batatoli ya Yehova; ya moindo mpo na batomboki; ya mai ya pondu mpo na babomi-bato; ya rozɛ mpo na mibali oyo basangisaka nzoto na mibali; ya bule mpo na bato oyo bautá bikólo mosusu. Soki moto azali Moyuda, longola elembo ya etuluku na ye, bazalaki kobakisa elembo mosusu ya langi ya mosaka mpe, bilembo yango mibale ezalaki komonana lokola monzoto oyo ezali na nsɔngɛ motoba, oyo babengaka Monzoto ya Davidi (Étoile de David).”

Profɛsɛrɛ John Roth akomaki na buku na ye (Holocaust Politics) ete: “Soki bato mingi babosani te likambo oyo elembo ya violɛ eteyi biso, yango ekoki kobatela biso na likama; ezali kobenda likebi na biso mpe komonisa biso ete tozali na mokumba ya kobatela bizaleli malamu oyo ezali na lokumu na miso ya bato.” Batatoli ya Yehova babimisá kasɛti-video moko oyo motó ya likambo na yango ezali La fermeté des Témoins de Jéhovah face à la persécution nazie. Kutu, bazwelaki yango mbano. Tolendisi yo osɛnga Motatoli ya Yehova moko asalisa yo otala kasɛti-video yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto