Motuya ya “mbɛki oyo eleki pɛtɛɛ”
NTOMA Petelo akomaki boye: “Bino mibali, bókoba kofanda [ná basi na bino] engebene boyebi, kopesáká bango lokumu lokola epai ya mbɛki oyo eleki pɛtɛɛ, oyo ya bomwasi.” (1 Petelo 3:7) Tokoki nde koloba ete vɛrsɛ yango ezali kokitisa mwasi ndenge ebengi ye “mbɛki oyo eleki pɛtɛɛ”? Tótala soki mokomi na yango, oyo apemamaki na Nzambe, alingaki mpenza koloba nini.
Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “lokumu” elimboli “motuya, valɛrɛ, . . . to limemya.” Na yango, mobali asengeli kozala na boboto epai ya mwasi na ye, asengeli kotyela ye likebi mpe kolɛngɛla ye mpenza lokola saani ya mbɛlɛ. Tomoni ete yango ezali ata moke te kokitisa mwasi. Tózwa ndakisa ya mwinda oyo babengaka Tiffany. Mwinda yango ezalaka kitoko mpenza, kasi ezali mpasi te mpo epasuka. Lokola mwinda yango ezalaka makasi te, yango ekitisi motuya na yango? Te! Na 1997, mwinda moko ya Tiffany etɛkamaki na motuya ya dolare koleka milio 2! Lokola ezali lokola saani ya mbɛlɛ, oyo ezali mpasi te mpo epasuka, ebakisaka nde motuya na yango, kasi ekitisaka yango te.
Ndenge moko mpe, kopesa mwasi lokumu lokola mbɛki oyo eleki pɛtɛɛ ezali kokitisa ye te. Mobali akofanda na mwasi na ye “engebene boyebi” soki azali koyeba na makambo nini mwasi na ye azali makasi mpe na makambo nini azali na bolɛmbu; makambo nini alingaka mpe makambo nini aboyaka; makanisi na ye mpe bamposa na ye. Mobali ya malamu ayebaka ete ye ná mwasi na ye bakeseni mpe apesaka ye kilo. Amityaka na esika ya mwasi na ye mpo “mabondeli [na ye] ekangisama na nzela te.” (1 Petelo 3:7) Mobali oyo azali kotya likebi te na ezaleli ya bomwasi ya molongani na ye azali kobebisa boyokani na ye na Nzambe. Tomoni ete Liloba Nzambe ezali kokitisa basi te. Kutu, ezali nde kopesa bango lokumu mpe kilo.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 32]
© Christie’s Images Limited 1997