Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 1/7 lok. 32
  • Bomoi na ngai ebongwaná banda bayaki kotala ngai

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bomoi na ngai ebongwaná banda bayaki kotala ngai
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 1/7 lok. 32

Bomoi na ngai ebongwaná banda bayaki kotala ngai

NSIMA ya kokutana na bilenge basi mibale oyo bazali Batatoli ya Yehova, mobali moko akomaki boye: “Nazalaki na mposa makasi ya kobɛtɛla libota na ngai lisolo ya ‘baanzelu’ mibale oyo Nzambe atindelaki ngai.” Mwa bapɔsɔ liboso báya kotala ye, mwasi na ye ya mbula 45 akufaki. Makanisi na ye ebulunganaki mpenza. Bana na ye ya mikóló babɔndisaki ye mingi, kasi bazalaki kofanda mosika. Baninga mpe bato ya kartye bayaki kotala ye te.

Ntango bandeko yango bakendaki kotala ye, mobali yango alobaki na bango boye: “Nabondelaka Nzambe lisusu te.” Kasi, bamityaki mpenza na esika na ye mpe batikelaki ye trakte Elikya nini ezali mpo na balingami na biso oyo basili kokufa? Atángaki yango na mpokwa wana mpe ebɔndisaki ye.

Bandeko yango bazongelaki ye nsima ya mwa mikolo. Mbala ya liboso oyo bayaki kotala ye, bamonaki ete azalaki mawamawa mpe balingaki koyeba ndenge azali. Mobali yango akomaki ete: “Nakamwaki mingi ndenge bana basi mibale wana oyo bayebaki ngai te bamibanzabanzaki mpo na ngai mpe balukaki kutu koyeba ndenge nazali.” Bavɛrsɛ ya Biblia oyo batángelaki ye, elendisaki ye mpenza. Bandeko yango bayebisaki ye ete bakozonga lisusu. Mobali yango asepelaki mingi mpe akomaki maloba oyo tolobeli na likoló mpe atindaki yango na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova na esika azalaki.

Liboso ya kokende na mboka moko pene na esika mwana na ye moko afandaka, mobali yango ayanganaki na makita ya Batatoli ya Yehova mpe alyaki elongo na libota ya moko ya bandeko basi oyo basololaki na ye. Akomaki boye: “Ngai nazali kolongwa awa, kasi nakobosana soki moke te bana basi wana mpe lingomba na bino, mpe nakobanda kobondela ntango nyonso mpo na bino. Sikoyo nakómi kobondela mingi. Nabongwani mpenza. Bana basi wana basalisi ngai mingi mpo nabongwana boye, mpe nakozala ntango nyonso na botɔndi mpo na bango.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto