Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 15/7 lok. 32
  • “Banda lelo nandimi ete Nzambe azali”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Banda lelo nandimi ete Nzambe azali”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 15/7 lok. 32

“Banda lelo nandimi ete Nzambe azali”

MOKOLO moko, Alexandra, mwasi moko oyo azali moto ya Ukraine kasi afandaka na engumba Prague, na République tchèque, autaki mosala mpe azalaki kozonga ndako. Na esika oyo bazelaka bisi, amonaki pɔtɔmɔni moko na nse; bato bazalaki kolekaleka yango. Alɔkɔtaki yango mpe ntango afungolaki, amonaki liboke mobimba ya bankasa ya 5 000 Koruna (mbongo ya République tchèque)! Amonaki ata moto moko te oyo azali koluka pɔtɔmɔni yango. Lokola Alexandra azali mopaya na mboka yango, kozwa mbongo ezali mpasi mingi. Kasi, asalaki nini na mbongo yango?

Ntango akómaki na ndako, alakisaki yango Victoria, mwana na ye ya mwasi. Babimisaki biloko nyonso ezalaki na kati mpo na koluka nkombo mpe adrɛsi ya nkolo na yango, kasi bamonaki te. Bamonaki kaka papye moko oyo bakomakomá mituya. Na liboso, bakomá nimero oyo banki epesaka moto oyo abombisi mbongo mpe na nsima, bakomakomá mituya. Na kati ya pɔtɔmɔni yango bamonaki mpe papye moko oyo ezalaki na malako mpo na banki moko mpe esika moko bakomá “330 000 koruny” (dolare soki 10 000). Yango mpe ezalaki motuya ya mbongo nyonso oyo ezalaki na pɔtɔmɔni.

Alexandra amekaki kobenga na banki na nimero oyo amonaki na papye yango, kasi esimbaki te. Na nsima, ye ná mwana na ye bakendaki na banki mpe balimbolaki makambo nyonso. Batunaki soki moto moko abombisaka mbongo na banki yango na nimero oyo bamonaki na pɔtɔmɔni. Kasi, bazalaki na nimero yango te. Mokolo oyo elandaki, Alexandra akendaki lisusu na banki na nimero mosusu oyo amonaki. Na mbala yango, bamonaki ete nimero yango ezali ya mwasi moko. Alexandra ná Victoria babengaki mwasi yango mpe alobaki ete abungisaki pɔtɔmɔni na ye. Ntango bakutanaki na mwasi yango, asepelaki mingi mpe atunaki bango: “Napesa bino nini mpo nazwa mbongo na ngai?”

Victoria alobaki boye: “Eloko te. Soki tozalaki na mposa ya mbongo yango, tolingaki koluka yo te.” Atako ayebi koloba monɔkɔ ya Tchèque malamu te, amekaki kolimbwela mwasi yango boye: “Tozongiseli yo mbongo na yo mpamba te tozali Batatoli ya Yehova. Lokola toyekolaka Biblia, lisosoli na biso ekotungisama soki tobombi eloko oyo ezali ya biso te.” (Baebele 13:18) Mwasi yango asepelaki mingi mpe alobaki ete, “Banda lelo nandimi ete Nzambe azali.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto