Elamba ya nsuki ya nyama mpe bomoto ya elimo
MOKONZI LOUIS IX ya ekólo France azalaki na elamba ya ndenge wana. Ntango Thomas More azalaki koyekola mibeko, azalaki kolata elamba ya ndenge wana, oyo ezalaki kosalisa ye alala te ngonga 19 to 20 na mokolo. Kutu, balobaka ete yango nde More azalaki kolata mingi na bomoi na ye. Ntango babomaki Thomas Becket, episkɔpɔ-mokonzi ya Cantorbéry na kati ya ndako-nzambe, bato bakamwaki komona ete alataki elamba ya ndenge wana na nse ya bilamba na ye. Bato nyonso oyo totángi awa bakokanaki na likambo nini? Bazalaki kosalela elamba ya nsuki ya nyama mpo na koyokisa nzoto na bango mpasi.
Elamba ya nsuki ya nyama ezalaki elamba moko ya nzubɛnzubɛ, oyo bazalaki kosala na nsuki ya ntaba. Bazalaki kolata yango mpenza na nzoto mpo etubatubaka loposo mpe eyokisaka yango mpasi. Ezalaki mpe kobomba nsili. Balobaka ete Thomas Becket alataki elamba ya ndenge wana ná kupe na yango tii ntango “etondaki na nsili.” Na nsima ya bambula ya 1500, bakómaki mbala mosusu kosalela elamba basalá na mwa bibende ya mikemike na esika ya elamba ya nsuki ya ntaba. Nsɔngɛ ya bibende yango ezalaki kotala epai ya nzoto, mpe na ndenge yango, ezalaki koyokisa moto oyo alati yango mpasi makasi lisusu koleka.
Buku moko elimbolaki ete ntina ya elamba yango, lokola mpe makambo mosusu oyo bato bazalaki kosala mpo na koyokisa nzoto na bango mpasi, ezalaki ya “koboma bamposa mabe ya mosuni mpe kolona bomoto mpe bizaleli ya elimo.” Kaka bato ya mangomba oyo bamipesá te nde bazalaki kolata bilamba ya ndenge wana; ata bandimi mpamba ná bakonzi ya minene ya Leta, bazalaki mpe kolata yango. Ata lelo oyo, bituluku ya bato mosusu oyo bamipesá na mangomba balataka bilamba yango.
Kolata elamba ya nsuki ya nyama to koyokisa nzoto mpasi na lolenge mosusu ekoki nde kokolisa bizaleli ya elimo? Te, makambo wana ekolisaka moto na elimo te. Kutu, ntoma Paulo amonisaki ete “konyokola nzoto makasi” ezali malamu te. (Bakolose 2:23)a Moto akolaka na elimo nde soki azali koluka boyebi ya Nzambe, elingi koloba azali koyekola Liloba ya Nzambe na molende mpe kosalela makambo oyo azali koyekola na bomoi na ye.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo mingi lisusu na ntina na momeseno yango, talá lisolo “D’après la Bible... L’ascétisme est-il la clé de la sagesse ?” na Lamuká! ya 8 Ɔkɔtɔbɛ 1997.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 32]
Mokonzi Louis IX, na likoló: Euti na buku Great Men and Famous Women; Thomas Becket, na katikati: Euti na buku Ridpath’s History of the World (Vol. IV); Thomas More, na nse: Euti na buku Heroes of the Reformation, 1904