“Ntina nini tozali na bomoi?”
ELIE WIESEL, moto moko oyo azwaki mbano monene oyo babengaka Prix Nobel mpe oyo abikaki ntango basoda ya Nazi babomaki ebele ya Bayuda alobaki ete yango ezali “motuna ya ntina mingi oyo moto nyonso asengeli komituna.”
Yo mpe osilá komituna motuna yango? Bato mingi basilá komituna yango, kasi bazwaki eyano te. Mpo na komeka kolimbola ntina ya bomoi, Arnold Toynbee, mwana-mboka Angleterre mpe moto ya mayele na masolo ya kala, akomaki boye: “Moto azali na bomoi mpo akumisaka Nzambe mpe asepela na Nzambe libela na libela.”
Likambo ya kokamwa, esili koleka bambula soki nkóto misato, Mokonzi Salomo oyo ayekolaki malamumalamu bomoi ya moto, azwaki eyano na motuna yango. Alobaki boye: “Tóyoka nsuka ya likambo mobimba: Tosá Nzambe mpe batelá mibeko na ye; yango ezali mosala ya bato nyonso.”—Mosakoli 12:13.
Yesu Klisto, mwana ya Nzambe andimisaki mpe likambo yango. Ntango azalaki awa na mabelé, asalaki nyonso mpo na kokumisa Tata na ye. Bomoi na ye ezalaki na ntina mpo azalaki kosalela Mozalisi. Mosala yango ezalaki kopesa ye makasi mpe etindaki ye aloba ete: “Bilei na ngai ezali nde kosala mokano ya moto oyo atindaki ngai.”—Yoane 4:34.
Boye, ntina nini tozali na bomoi? Lokola Yesu, Salomo, mpe ebele ya basaleli mosusu ya Nzambe, biso mpe tokoki komona ntina ya solosolo ya bomoi mpe kozwa esengo ya seko na bomoi na biso soki tozali kosala mokano ya Nzambe. Olingi koyeba malamumalamu ndenge ya kosambela Nzambe “na elimo mpe na solo”? (Yoane 4:24) Batatoli ya Yehova na mboka to na kartye na bino bakosepela kosalisa yo ozwa eyano na motuna ya koyeba ntina oyo tozali na bomoi.