Ndakisa ya bosembo
NELMA, elenge mwasi moko oyo asalaka bato nsuki na engumba Cruzeiro do Sul, na Brésil, akutanaki na likambo moko oyo emekaki bosembo na ye. Ntango mai etondaki na kartye oyo Nelma afandaka mpe ebebisaki bandako, kiliya na ye moko akabelaki ye mwa bilamba. Wana azalaki kotala elamba mokomoko, na mabenga ya bapatalo mosusu akutaki mbongo oyo, ntango asangisaki yango, ekokaki dolare 1 000.
Mbongo oyo Nelma azwaki ekokani na mbongo oyo bakoki kofuta ye sanza nsambo, mpe azalaki mpenza na mposa ya mbongo. Mai ebebisaki ndako na ye, mpe biloko mingi ya tata na ye mpe ya bandeko na ye ebebaki. Na mbongo wana, akokaki kobongisa ndako na ye mpe kotikala na mbongo mosusu mpo na kosalisa bandeko na ye. Nzokande, lokola Nelma ayekolaka Biblia, lisosoli na ye epekisaki ye asalela mbongo yango.—Baebele 13:18.
Na mokolo oyo elandaki, akendaki mosala ntɔngɔntɔngɔ mpe abengaki mwasi oyo akabelaki ye bilamba. Nelma apesaki ye matɔndi mingi mpo na bilamba mpe alobaki ete akoki te kobomba mbongo oyo amonaki. Mwasi yango asepelaki mingi ntango Nelma apesaki ye mbongo na ye. Abombaki mbongo yango mpo na kofuta bato na ye ya mosala. Mwasi yango alobaki boye: “Bato oyo bazali sembo bazali mingi te.”
Ya solo, bato mosusu bamonaka ete kozala sembo ezali na litomba moko te. Nzokande, bato oyo balukaka kosepelisa Nzambe ya solo, Yehova, balingaka kozala sembo. (Baefese 4:25, 28) Nelma alobaki boye: “Soki nabombaki mbongo wana, nalingaki kozwa mpɔngi te na butu.”