“Nkolo, mpo na nini osalaki eloko te?”
PÁPA BENOÎT XVI alobaki maloba yango na mokolo ya 28 Mai 2006 ntango akendaki na esika oyo ezalaki kaa ya bakangami ya Banazi, na Auschwitz, na ekólo Pologne. Ntango akómaki na esika oyo Banazi babomaki bankóto ya Bayuda mpe bato mosusu, alobaki mpe boye: “Moto nyonso ntango akómi na esika oyo amitunaka mituna mingi! Mbala mingi bato bamitunaka mituna lokola oyo: Nzambe azalaki wapi ntango makambo ya boye ezalaki kosalema? Mpo na nini asalaki eloko te? Ndenge nini atikaki ete bato ebele boye bábomama, mpe ete mabe elonga? . . . Tosengeli kokoba kobelela Nzambe na komikitisa mpe na etingya ete: Salá! Kobosana bato te, bazali bikelamu na yo!”
Maloba ya pápa etindaki bato mingi bábimisa makanisi ndenge na ndenge. Bato mosusu bamonaki ete pápa alobelaki te makambo mosusu ya ntina mingi, na ndakisa aboyaki koloba ete koyina Bayuda nde etindaki Banazi básala makambo ya nsɔmɔ ndenge wana. Bato mosusu balobaki ete maloba yango emonisaki ete mpo na ye, libondeli oyo Pápa Jean-Paul II asalaki mpo na kosɛnga bolimbisi mpo na masumu oyo lingomba esalaki ezalaki na ntina te. Filippo Gentiloni, mopanzi-nsango moko oyo azali Mokatolike, alobaki boye: “Yango wana, na esika ya motuna ya koyeba soki Nzambe azalaki wapi—motuna oyo ezali na eyano te—bato mingi bazalaki kosɛnga eyano na motuna ya pɛtɛɛ ete: Pie XII azalaki wapi?” Bato yango bazalaki kolobela Pápa Pie XII oyo alobaki eloko te ntango bazalaki koboma Bayuda.
Ndenge oyo Banazi babomaki ebele ya Bayuda mpe ndenge oyo ebele ya bato mosusu bazali kobomama emonisi solo ete “moto moko azali na bokonzi likoló ya mosusu mpo na kopesa ye mpasi.” (Mosakoli 8:9) Longola yango, Mozalisi ya bato akangi mabɔkɔ te ntango azali komona makambo nyonso ya nsɔmɔ oyo ezali kosalema. Na kati ya Biblia, amonisi bantina oyo atiki nzela na mabe. Nzambe alobi mpe ete abosani bato te. Kutu, ntango oyo Nzambe atikelaki moto amitambwisa ye moko ekómi na nsuka. (Yilimia 10:23) Okosepela koyeba malamumalamu mokano ya Nzambe mpo na bato? Batatoli ya Yehova bakozala na esengo ya kosalisa yo ozwa biyano oyo Biblia epesi na mituna oyo etungisaki Pápa Benoît XVI.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 32]
Oświęcim Museum