Moyembi moko ya Russie asaleli nkombo ya Nzambe
NA MOBU 1877, Modest Moussorgski, alanga-nzembo moko oyo ayebani mingi na ekólo Russie abimisaki buku moko ya nzembo oyo elobelaki lisolo moko ya Biblia. Akomelaki moninga na ye moko boye: “Nakomi lisolo moko ya Biblia oyo napesi nkombo Jesus Navine [Josué]. Lisolo yango mobimba euti na Biblia mpe elobeli kutu bitumba oyo Navine abundaki mpe alongaki na mokili ya kanana.” Na masolo na ye mosusu, na ndakisa “Kobomama ya Senakeriba,” Moussorgski asaleli mpe masolo ná bato ya Biblia.
Likambo ya kokamwa, na buku “Jesus Navine” mpe na buku mosusu oyo abimisaki na 1874, “Kobomama ya Senakeriba,” Moussorgski asaleli nkombo ya Nzambe, oyo emonisami na balɛtrɛ minei na Makomami ya Liebele: יהוה (YHWH), mpe esalelamaki mbala soki 7 000.
Na yango, babuku wana ya Moussorgski emonisi ete liboso kutu tókóma na ekeke ya 20, bato ya ekólo Russie bayebaki nkombo ya Nzambe, Yehova, ndenge ezali na kati ya Biblia. Likambo yango ebongi mpenza, mpamba te Yehova ye moko alobaki na Moize ete: “Oyo ezali nkombo na ngai lobiko na lobiko, mpe nakanisama bongo kino libota na libota.”—Exode 3:15.
[Elilingi na lokasa 32]
Fɔtɔ oyo ezwamaki na 1913, na eteyelo ya miziki ya Saint-Pétersbourg, esika babombá banzembo ya Moussorgski
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 32]
Sheet music: The Scientific Music Library of the Saint-Petersburg State Conservatory named after N.A. Rimsky-Korsakov; street scene: National Library of Russia, St. Petersburg