“Bakobota naino na ntango ya konuna”
NA MIKILI oyo ezali zingazinga ya Mbu ya Mediterane, bato mingi balonaka lolenge moko boye ya nzete ya mbila na mapango. Nzete yango ezalaka kitoko na kotala mpe mbuma na yango ezalaka elɛngi. Lisusu, nzete yango ekobaka kobota mbuma ata nsima ya mbula nkama.
Salomo, mokonzi ya Yisalaele ya kala, akokanisaki nzoto kitoko ya elenge mwasi Sulamite na nzete ya mbila. (Loyembo ya Salomo 7:7) Buku moko (Plants of the Bible) elobi boye: “Na monɔkɔ ya Liebele, nzete yango ebengamaka ‘tamar.’ . . . Bayuda bakómaki kosalela nkombo ya nzete yango mpo na kolobela nzoto oyo ezali kitoko mpe bazalaki kopesa bana mosusu ya basi nkombo yango.” Na ndakisa, elenge mwasi moko, ndeko ya Salomo, oyo tata na ye abotaki na mwasi mosusu azalaki kitoko mingi; nkombo na ye ezalaki Tamala (to Tamar). (2 Samwele 13:1) Tii lelo oyo, baboti mosusu bapesaka bana na bango nkombo yango.
Kasi, ezali kaka te bana basi oyo bazali kitoko nde bakokanisi bango na nzete ya mbila. Mokomi ya nzembo ayembaki boye: “Moto ya boyengebene akokola [lokola nzete ya mbila, NW]; ye akoya monene [lokola] nzete monene ya Lebanona. Baoyo bakonami kati na ndako ya [Yehova] bakoyikana kati na lopango ya Nzambe na biso. Bakobota naino na ntango ya konuna, bakotonda na mafuta, bakokauka te.”—Nzembo 92:12-14.
Mibange oyo basalelaka Nzambe na bosembo bazali lokola nzete ya mbila na makambo mingi. Biblia elobi boye: “Motó ya pɛɛ ezali motole ya nkembo [soki] ezwami na nzela ya boyengebene.” (Masese 16:31) Atako makasi ya nzoto ekoki kokita ntango mbula ezali kopusana, mibange bakoki kobatela makasi na bango ya elimo soki bazali ntango nyonso koyekola Liloba ya Nzambe. (Nzembo 1:1-3; Yilimia 17:7, 8) Na maloba na bango ya bwanya mpe ndakisa malamu na bango, mibange ya sembo balendisaka mpenza basusu mpe mbula na mbula, bakobaka kobota mbuma lokola nzete ya mbila.—Tito 2:2-5; Baebele 13:15, 16.