Lisukulu ya ntina mingi
Nani abongi koyangela bato?
Mokonzi nini akoki
• kosilisa bobola, kopesa bato nyonso bilei mpe bandako ya malamu?
• kosilisa mipɛpɛ ya makasi, koningana ya mabelé mpe bambula ya makasi oyo ezali koboma bato mpe kobebisa biloko na bango?
• kosilisa maladi nyonso, ata mpe kozongisa mibange bilenge?
• kosukisa bitumba nyonso, mpo bato báfanda na kimya?
• Kobongisa mabelé mpo na kokómisa yango paladiso?
Ezali kaka na Mokonzi moko oyo akoki kosala makambo nyonso wana. Mokonzi yango nani? Eyano na motuna wana ekopesama na lisukulu ya bato nyonso oyo ekozala na motó ya likambo: “Nani abongi koyangela bato?” Lisukulu yango oyo euti na Biblia ekosalema na mikili koleka 230. Na bisika mingi, eh6kosalema na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova, mokolo ya lomingo 6 Aprili 2008. Batatoli ya Yehova ya mboka na bino bakozala na esengo ya koyebisa yo esika mpe ngonga oyo lisukulu yango ekosalema. Tozali na esengo ya kobenga yo oya kolanda lisukulu yango.