Oyebaki yango?
Na Baefese 2:11-15, Paulo alobelaki mpenza efelo ya solo ntango akomaki ete efelo moko ezalaki kokabola Bayuda na bato ya bikólo mosusu?
Na mokanda na ye epai ya Baefese, ntoma Paulo alobelaki bokeseni oyo ezalaki kati na Bayisalaele mpe “bapaya.” Alobaki ete ezalaki na “efelo” moko oyo ezalaki “kokabola” bituluku yango mibale. (Baefese 2:11-15) Paulo azalaki kolobela “Mibeko ya bakomandema” oyo epesamaki na nzela ya Moize; kasi, ekoki mpe kozala ete liloba “efelo” oyo asalelaki etindaki batángi ya mokanda yango bákanisa efelo moko boye ya mabanga oyo ezalaki mpenza.
Na ekeke ya liboso ya ntango na biso (T.B.), tempelo ya Yehova na Yelusaleme ezalaki na mapango mingi mpe bato mosusu bazalaki na ndingisa te ya kokɔta na mapango yango mosusu. Moto nyonso akokaki kokɔta na Lopango ya Bapakano, kasi kaka Bayuda mpe Baprozelite nde bazalaki na ndingisa ya kokɔta na mapango mosusu ya tempelo. Efelo moko ya mabanga oyo bazalaki kobenga Soreg, ekabolaki mapango oyo bato mosusu bakokaki kokɔta mpe oyo bakokaki kokɔta te; balobaka ete efelo yango ezalaki na molai ya mɛtrɛ 1,3. Flavius Josèphe, Moyuda moko oyo azalaki mokomi ya masolo ya kala na ekeke ya liboso, alobaki ete batyaki makomi na monɔkɔ ya Grɛki mpe ya Latin oyo ezalaki kopekisa mopakano nyonso akatisa yango mpe atya makolo na bisika mosantu.
Bato ya arkeoloji bamonaki etanda oyo ezalaki na makomi ya Grɛki oyo batyaki na efelo yango. Likoló na yango ekomamá boye: “Mopaya akatisa te ndelo mpe efelo oyo ezali zingazinga ya tempelo. Moto nyonso oyo akozwama, akobomama mpe makila na ye ekozala na motó na ye.”
Emonani ete Paulo asalelaki Soreg wana lokola elilingi ya kondimana ya Mibeko ya Moize oyo, banda kala, ezalaki kokabola Bayuda mpe bato ya bikólo mosusu. Liwa ya Yesu lokola mbeka esukisaki kondimana ya Mibeko mpe na bongo, ‘ebukaki efelo ya katikati oyo ezalaki kokabola bango.’
Mpo na nini mbala mingi Biblia elobelaka mabota 12 ya Yisalaele, nzokande ezalaki mabota 13?
Mabota ya Yisalaele eutaki na bana ya Yakobo, oyo na nsima akómaki kobengama Yisalaele. Yakobo azalaki na bana 12: Lubene, Simeona, Levi, Yuda, Dani, Nafatali, Gada, Asele, Isakala, Zebuluna, Yozefe, mpe Benyamina. (Genese 29:32–30:24; 35:16-18) Mabota zomi na moko ezalaki kobengama na bankombo ya bana zomi na moko ya Yakobo; kasi, libota moko te ezwaki nkombo ya Yozefe. Nzokande, mabota mibale ezwaki bankombo ya bana ya Yozefe, Efalaima ná Manase, oyo bakómaki kotalelama lokola batata ya mabota yango. Na yango, mabota nyonso ya Yisalaele ezalaki 13. Kasi, mpo na nini mbala mingi Biblia elobelaka mabota 12?
Na kati ya Bayisalaele, mibali oyo bazalaki na libota ya Levi baponamaki mpo na kosala na tabenakle ya Yehova mpe na nsima na tempelo. Mpo na yango, bazalaki kokende etumba te. Yehova ayebisaki Moize boye: “Bobele libota ya Levi okotánga te, mpe okosanganisa motuya na bango na bato ya Yisalaele elongo te. Okotya Balevi likoló ya [tabenakle, NW] ya litatoli, mpe likoló ya bisaleli na yango, mpe likoló ya biloko na yango nyonso.”—Mituya 1:49, 50.
Balevi bazwaki mpe te libula ya mabelé na Mokili ya Ndaka. Kasi, bapesaki bango bingumba 48, na bisika ndenge na ndenge na Yisalaele.—Mituya 18:20-24; Yosua 21:41.
Mpo na bantina yango mibale, mbala mingi libota ya Levi ezalaki kotángama te na mabota ya Yisalaele. Yango wana, mbala mingi Biblia elobelaka kaka mabota 12 ya Yisalaele.—Mituya 1:1-15.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 21]
Archaeological Museum of Istanbul