Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w10 1/1 lok. 29
  • Mpo na nini Nzambe apesi bato likabo ya bomoi ya seko?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini Nzambe apesi bato likabo ya bomoi ya seko?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Masolo mosusu
  • Tozali na botɔndi mpo na boboto monene ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Tosikolami na nzela ya boboto monene
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Palanganisá nsango malamu ya boboto monene
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Nzambe azali kolakisa biso bolingo na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
w10 1/1 lok. 29

Mituna ya batángi . . .

Mpo na nini Nzambe apesi bato likabo ya bomoi ya seko?

▪ Biblia elobi ete Nzambe apesi biso libaku ya kozwa “bomoi ya seko.” (Yoane 6:40) Kasi, nini etindi ye apesa elikya ya ndenge wana? Ezali kaka likambo ya bosembo?

Bosembo esɛngi kosalela bato makambo oyo esengeli mpe oyo ebongi. Bongo, tobongi mpenza kozwa bomoi? Te. Biblia elobi boye: “Ezali na moto moko te oyo azali moyengebene na mabele oyo asalaka kaka malamu mpe asalaka lisumu te.” (Mosakoli 7:20) Lisumu ezalaka na etumbu. Nzambe akebisaki moto ya liboso, Adama, ete mokolo oyo akosala lisumu, akokufa solo. (Ebandeli 2:17) Na nsima, elimo santu etindaki ntoma Paulo akoma ete: “Lifuti oyo lisumu ezali kofuta ezali liwa.” (Baroma 6:23) Na yango, soki bankɔkɔ nyonso ya Adama babongi mpenza na liwa, mpo na nini Nzambe apesi bato libaku ya kozwa bomoi oyo ezangi nsuka?

Bomoi ya seko ezali “likabo ya ofele.” Emonisaka ete bolingo mpe boboto monene ya Nzambe ezali makasi mpe eleki mpenza. Biblia elobi boye: “Bato nyonso basali lisumu mpe bakómaka na nkembo ya Nzambe te, mpe ezali lokola nde bazwi likabo ya ofele na ndenge bazali kotángama bayengebene na boboto monene na ye, na kosikolama oyo basikolami na lisiko oyo Kristo Yesu afutaki.”​—Baroma 3:23, 24.

Atako biso nyonso tobongi na liwa, Nzambe aponi kopesa baoyo balingaka ye bomoi ya seko. Ezali sembo te? Biblia elobi boye: “Tokoloba nini? Nzambe azangi nde bosembo? Te, ata moke te! Mpo azali koloba na Moize ete: ‘Nakoyokela mawa moto oyo nakoyokela mawa, mpe nakomonisela motema mawa moto oyo nakomonisela motema mawa.’ . . . Bongo yo nani mpo ofungolela Nzambe monɔkɔ?”​—Baroma 9:14-20.

Na bisika mosusu na mokili, mokonzi ya guvɛrnema to zuzi akoki kolimbisa mosali-mabe oyo asali likambo oyo ezali kosɛnga azwa etumbu makasi. Soki mosali-mabe yango andimi kosala makambo oyo basɛngi ye mpe amonisi ete abongoli mpenza makanisi mpe etamboli na ye, zuzi to prezida akoki kopona kolimbisa ye, akoki kolɛmbisa etumbu na ye to mpe kolongola yango nyonso. Kosala bongo ekoki komonisa boboto monene.

Ndenge moko mpe, Yehova akoki komona malamu atika kosɛnga ete bato nyonso ya masumu bázwa etumbu oyo ebongi na bango. Kasi, na bolingo na ye, akoki kopesa baoyo balingaka ye mpe batosaka mitinda na ye bomoi ya seko. Biblia elobi boye: “Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala makambo ya boyengebene andimami na ye.”​—Misala 10:34, 35.

Likambo eleki monene oyo emonisi bolingo ya Yehova epai na biso ezali nde kotinda oyo atindaki Mwana na ye anyokwama mpe akufa mpo na biso. Yesu alobaki mpo na Tata na ye boye: “Nzambe alingaki mokili mingi, yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo azali kondimela ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.”​—Yoane 3:16.

Baoyo nyonso balingi Yehova mpe bazali kosala mokano na ye bandimami na Nzambe ndenge moko, ata soki bazalaki bato ya ndenge nini. Na yango, elikya ya bomoi ya seko ezali libosoliboso komonisa boboto monene ya Nzambe, bolingo na ye oyo eleki nyonso.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 29]

Ezali libosoliboso komonisa boboto monene ya Nzambe, bolingo na ye oyo eleki nyonso

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto