Diskur ya sipesiale
Epai wapi tokoki kozwa lisalisi mpo na kolonga mikakatano ya lelo?
Mokili ya lelo ezali na batoli ndenge na ndenge. Babuku mpe baemisyo ya televizyo oyo epesaka bato batoli na ndenge oyo bakoki kosala mpo na kosilisa mikakatano na bango ezali mingi. Atako bongo, mikakatano oyo etungisaka bato mingi ezali kaka. Okoki komituna: ‘Ezali mpenza na esika oyo nakoki kozwa lisalisi oyo nakoki mpenza kotyela motema?’ Eyano ezali ɛɛ!
Atako Biblia eumeli bankóto ya bambula, kasi ezali na batoli oyo esilaka ngala te, oyo ekoki koyanola na mituna lokola oyo:
▪ Ndenge nini nakoki kosilisa matata mpe kozala na boyokani malamu na basusu?
▪ Ndenge nini nakoki kozala na esengo?
▪ Ndenge nini nakoki kosala ntango nakutani na mikakatano ya mbongo?
▪ Ndenge nini nakoki kosala mpo namitungisa mingi te?
Biyano na mituna wana ekolobelama na diskur ya bato nyonso oyo ezali na motó ya likambo: “Mitinda ya Biblia—Ekoki kosalisa biso tólonga mikakatano ya lelo?” Lisolo wana oyo euti na Biblia, ekosalema na mabele mobimba, na mikili koleka 230. Na bisika mingi, lisolo yango ekosalema na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova, na mokolo ya Lomingo, 1 Mai 2011.
Batatoli ya Yehova na esika ofandi bakosepela kopesa yo adrɛsi mpe ngonga oyo diskur yango ekosalema. Tobengi yo oya koyangana.