Oyebaki yango?
Yesu alingaki koloba nini ntango alobaki na Saulo: “Kobɛtabɛta makolo na nsɔngɛ ya mangenda ezali mpasi mpo na yo”?—Misala 26:14.
▪ Na ntango ya kala, basali-bilanga bazalaki kosalela mangenda mpo na kotambwisa banyama oyo ezalaki kobenda etimweli mpo na kobalola mabele. Lingenda ezalaki nzete moko oyo ezalaki na bolai ya mɛtrɛ mibale na ndambo, oyo nsuka na yango ezalaki nsɔngɛ. Nsuka na yango moko ezalaki na ebende moko oyo ezali nsɔngɛ. Soki nyama emituti na lingenda wana, ekokaki komizokisa. Nsuka mosusu ya lingenda yango ezalaki na ebende moko oyo bazalaki kosalela mpo na kolongola mabele to matiti oyo ekangami na etimweli.
Ntango mosusu, bazalaki kosalela mangenda lokola bibundeli. Shamagare, Moyisraele moko oyo azalaki mosambisi mpe mobundi, abomaki Bafilistia 600 “na lingenda ya kotambwisa bangɔmbɛ.”—Basambisi 3:31.
Biblia elobeli mpe lingenda na ndenge ya elilingi. Na ndakisa, Mokonzi Salomo akomaki ete maloba ya moto ya bwanya ekoki kozala “lokola nsɔngɛ ya mangenda ya kotambwisa bangɔmbɛ,” oyo ekoki kotinda moninga na ye azwa ekateli ya malamu.—Mosakoli 12:11.
Nsima ya lisekwa na ye, Yesu mpe asalelaki lingenda na ndenge ya elilingi. Apesaki Saulo, moto oyo azalaki konyokola bakristo, toli ete atika “kobɛtabɛta makolo na nsɔngɛ ya mangenda.” Maloba wana ezali kopesa likanisi ya nyama ya motó makasi oyo eboyi kolanda litambwisi ya nkolo na yango. Saulo asalaki malamu mpenza mpo ayokaki toli ya Yesu mpe atikaki ezaleli na ye ya kala, akómaki ntoma Paulo.
Ndenge nini Bayuda ya siɛklɛ ya liboso bazalaki koyeba ngonga na butu?
▪ Bayuda ya siɛklɛ ya liboso ya ntango na biso bazalaki kosalela cadran solaire mpo na koyeba ngonga na moi. Kasi, soki mapata ezipi moi to ntango butu ekɔti, bazalaki kosalela eloko babengi clepsydre, to montre ya mai. Longola Bayuda, Baezipito, Baperse, Bagrɛki mpe Baroma ya kala mpe bazalaki kosalela eloko yango.
Buku moko (The Jewish Encyclopedia) elobi ete babuku ya Bayuda oyo babengi Mishnah mpe Talmud elobelaka clepsydre “na bankombo ndenge na ndenge, mbala mosusu na kolanda lolenge oyo esalemá, kasi nyonso elimbolaka eloko moko; nkombo yango elingi koloba mpenzampenza kokita mokemoke, to litangá mokomoko ya mai, oyo na Grɛki elimboli ‘clepsydre.’”
Ndenge nini clepsydre ezalaki kosala? Mai ezalaki kouta na saani moko oyo ezali na lidusu na nse mpe ezalaki koleka na saani mosusu. Moto oyo azali kotala akokaki koyeba ngonga soki atali nivo ya mai na saani ya likoló to ya nse, oyo batyaki bilembo.
Na bakaa ya basoda ya Roma, bazalaki kosalela bamontre ya ndenge wana mpo na koyeba ntango ya kokɛngɛla na butu. Mpo na koyebisa ete ntango ya kokɛngɛla mosusu ebandi, bazalaki kobɛta kelelo. Moto nyonso oyo ayoki kelelo azalaki koyeba ntango oyo mokomoko ya kokɛngɛla minei ya butu ebandi mpe esuki.—Marko 13:35.