Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 15/11 lok. 21
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Masolo mosusu
  • Mokanda ya Biblia nimero 41—Malako
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • ‘Ezalaki na ngonga nini?’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mokanda ya Biblia nimero 43—Yoane
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 15/11 lok. 21

Mituna ya batángi

Tokoki koyeba ngonga nini mpenza babakaki Yesu Kristo na nzete?

Motuna wana ebimi mpo emonanaka lokola mwa bokeseni ezali kati na lisolo oyo elobeli liwa ya Yesu na Evanzile ya Marko mpe Evanzile ya Yoane, oyo nyonso mibale ekomamaki na lisalisi ya elimo ya Nzambe. Marko alobi boye: “Ezalaki bongo ngonga ya misato, mpe [basoda] babakaki ye na nzete.” (Mrk. 15:25) Yoane alobi ete “ezalaki soki ngonga ya motoba” ntango Pilate apesaki Yesu na mabɔkɔ ya Bayuda mpo bábaka ye na nzete. (Yoa. 19:14-16) Bato ya mayele oyo balimbolaka Biblia bapesi makanisi ndenge na ndenge mpo na koyokanisa bisika wana oyo emonanaka ete ekeseni. Nzokande, Biblia elobeli makambo nyonso te oyo ekoki kosalisa biso tóyeba ntina ya bokeseni kati na masolo wana mibale. Kasi, kotalela ndenge bato bazalaki kotánga ngonga na eleko wana ekoki kosalisa biso mingi.

Na ekeke ya liboso ya ntango na biso, Bayuda bazalaki kokabola moi na bangonga 12, kobanda ntango moi ebimi. (Yoa. 11:9) Na yango, “ngonga ya misato” ezalaki kobanda na ngonga 8 tii na ngonga ya 9 ya ntɔngɔ; “ngonga ya motoba” ezalaki kosuka na midi. Ya solo, na boumeli ya mbula, moi ezalaki kobima mpe kolala na bangonga ekeseni. Yango wana, bolai ya mokolo ezalaki ndenge moko te, na kolanda eleko oyo bazali. Longola yango, mpo na koyeba ngonga, bazalaki kotala esika moi ezali. Na yango, bazalaki kolobela bangonga na bosikisiki te. Makomami ya Grɛki ya bokristo elobeli makambo mosusu oyo esalemaki na ngonga ya misato, ya motoba to ya libwa; mbala mingi yango emonisaka ete makambo yango esalemaki pene na ngonga wana. (Mat. 20:3, 5; Mis. 10:3, 9, 30) Bangonga ya sikisiki, na ndakisa “ngonga ya nsambo,” ezalaki kopesama kaka na masolo oyo esɛngi ete ngonga ya sikisiki eyebana.​—Yoa. 4:52.

Masolo ya Baevanzile eyokani na oyo etali ndenge makambo elandanaki na mokolo ya nsuka oyo Yesu alekisaki awa na mabele. Baevanzile nyonso minei emonisi ete banganga-nzambe mpe mikóló bayanganaki na ntɔngɔ, mpe na nsima bamemaki Yesu epai ya Ponsi Pilate, guvɛrnɛrɛ Moroma. (Mat. 27:1; Mrk. 15:1; Luka 22:66; Yoa. 18:28) Matai, Marko mpe Luka bango nyonso bakomaki ete na ngonga ya motoba, wana Yesu asilaki kobakama likoló ya nzete, molili ekɔtaki na mokili “tii na ngonga ya libwa.”​—Mat. 27:45, 46; Mrk. 15:33, 34; Luka 23:44.

Likambo moko ya ntina mingi oyo mbala mosusu batalelaki mpo na koyebisa ntango oyo babakaki Yesu na nzete, yango oyo: kobɛtama fimbo ezalaki na kati ya makambo oyo bazalaki kosala moto oyo balingi kobaka ye na nzete. Na bantango mosusu, bazalaki kobɛta moto makasi, tii okomona akufi. Na ntembe te, babɛtaki mpe Yesu fimbo makasi mpenza mpo atako ye moko azalaki komema nzete ya mpasi, na nsima esɛngaki moto mosusu aya komemela ye yango. (Luka 23:26; Yoa. 19:17) Soki kobɛtama fimbo ezalaki kotángama lokola ebandeli ya kobaka moto na nzete, boye mwa ntango elekaki liboso bábɛta Yesu nsɛtɛ na nzete ya mpasi. Na yango, moto na moto akokaki kopesa ngonga ya kobakama na nzete, kobanda na ntango oyo atali ngonga oyo bazali kosala moto yango likambo moko boye.

Ntoma Yoane akomaki Evanzile na ye bambula mingi nsima ya bakomi mosusu ya Baevanzile. Na yango, akokaki kotánga masolo na bango. Ezali solo ete ngonga oyo Yoane apesi emonani lokola ekeseni na oyo Marko apesaki. Kasi yango emonisi nde polele ete Yoane akomaki na ndenge na ye, na esika alanda kaka ndenge oyo Marko akomaki. Yoane ná Marko, bango mibale bakomaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe. Atako Biblia elobi makambo nyonso te mpo na kolimbola bokeseni wana, tokoki kotyela masolo ya Baevanzile motema.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto