Ozali koyeba lisusu?
Otángaki na likebi banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo euti kobima? Talá soki okoki kopesa biyano na mituna oyo elandi:
Na ndenge nini Salomo akoki kozala likebisi mpo na biso?
Nzambe apambolaki Mokonzi Salomo mpe asalelaki ye. Nzokande, na boyangeli na ye, Salomo atikaki kolanda toli ya Nzambe. Abalaki mwana mwasi ya Farao oyo azalaki mopakano, akómaki na basi ebele, mpe atikaki basi yango bapakano bámema ye mokemoke na losambo ya lokuta. Tosengeli koboya kokolisa mokemoke makanisi ya mabe. (Mib. 7:1-4; 17:17; 1 Bak. 11:4-8)—15/12, nkasa 10-12.
Mpo na nini tokoki koloba ete Sara azalaki kobanga Nzambe mpe azalaki molongani ya malamu?
Ntango Nzambe asɛngaki Abrahama alongwa na Ure, asengelaki kotika libota na ye, baninga, mpe bomoi oyo azalaki na yango mpo na kokende na esika moko oyo bayebaki te. Atako bongo, Sara andimaki kokende na ye, mpe atyaki motema ete Yehova akopambola ye. Azalaki na limemya mpo na Abrahama, mpe azalaki na bizaleli ya malamu.—1/1, lokasa 8.
Mpo na nini Yehova asɛngaki Abrahama akaba mwana na ye oyo alingaki mingi lokola mbeka?
Ezali na ntina tóyeba ete Nzambe atikaki te ete Abrahama akaba Yisaka lokola mbeka. Likambo yango emonisaki ete Nzambe ye moko akopesa mbeka ya motuya monene koleka, mbeka ya Mwana na ye Yesu.—1/1, lokasa 23.
Nini emonisi ete kobanda na ekeke ya liboso, awa na mabele, ezalaki ntango nyonso na mwa bakristo ya solo oyo batyami mafuta na elimo?
Na lisese oyo Yesu apesaki ya “blé” mpe “matiti mabe,” “milona ya malamu” ezali “bana ya bokonzi.” (Mat. 13:24-30, 38) Matiti mabe esengelaki kokola esika moko na blé tii na ntango ya kobuka mbuma. Yango wana, atako tokoki koloba na bosikisiki te soki banani bazalaki lokola blé, na ntembe te ezalaki ntango nyonso na mwa bato oyo bazalaki lokola blé, tii na ntango na biso.—15/1, lokasa 7.
Makambo nini ekomema mbala moko na Armagedone?
Bato ya bikólo bakoloba polele ete: “Kimya, likambo ya kobanga ezali te!” (1 Tes. 5:3) Baguvɛrnema ekotɛmɛla mangomba ya lokuta. (Em. 17:15-18) Bato ya bikólo bakobundisa basambeli ya solo ya Nzambe. Na nsima nsuka ekoya.—1/2, lokasa 9.
Tokoki kosala nini mpo tókóma bato ya likunya te?
Makambo oyo elandi ekoki kosalisa biso: Tósala makasi mpo na kolona bolingo mpe bolingo ya bondeko, tósanganaka na basaleli ya Nzambe, tólukaka kosala makambo oyo ezali malamu, ‘tósepelaka elongo na bato oyo bazali kosepela.’ (Rom. 12:15)—15/2, nkasa 16-17.
Banani balobaka monɔkɔ ya Nahuatl, mpe bibongiseli nini ezwami mpo na bango?
Ezalaki monɔkɔ ya Ba-Aztèques ya ntango ya kala; tii lelo bato milio moko na ndambo na Mexique balobaka monɔkɔ yango. Batatoli basakolaka na monɔkɔ ya Nahuatl, mpe mikanda mosusu ya moombo ya sembo ezali na monɔkɔ yango.—1/3, nkasa 13-14.
Ntango olingi kopesa moto toli, makambo nini osengeli kobosana te?
Luká koyeba likambo malamumalamu. Kowela kopesa eyano te. Zalá na komikitisa mpe salelá Liloba ya Nzambe. Soki likoki ezali, salelá mikanda ya moombo ya sembo. Kozwa ekateli na esika ya moto te.—15/3, nkasa 7-9.
Yesu alingaki koloba nini ntango alendisaki bayoki na ye ete kende na ye kilomɛtrɛ mibale (Mat. 5:41)?
Na ntango wana, Baroma oyo bazalaki koyangela ekólo Yisraele bazalaki kosalisa bato mosala na makasi. Ntango Yesu alobaki na bato oyo bazalaki koyoka ye ete kende na ye kilomɛtrɛ mibale, azalaki nde koyebisa bango básala misala oyo bakonzi ya mboka bazalaki kosɛnga bango kozanga koimaima.—1/4, lokasa 9.