Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w12 1/8 lok. 26
  • Oyebaki yango?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Oyebaki yango?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Masolo mosusu
  • Komɛla masanga mingi ezali mpenza mabe?
    Lamuká!—2004
  • Komɛla masanga ezali mabe?
    Lamuká!—2007
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
w12 1/8 lok. 26

Oyebaki yango?

Mabanga ya ntalo oyo ezalaki na libenga ya ntolo ya nganga-nzambe monene ya Yisraele eutaki wapi?

▪ Ntango Bayisraele babimaki na Ezipito mpe bakómaki na esobe, Nzambe apesaki bango mitindo ete básala libenga yango. (Kobima 28:15-21) Libenga yango ezalaki na mabanga ya rubi, topazi, emerode, tirikwaze, safire, jasipe, leshɛmɛ, agate, ametiste, krizolite, onikisi ná jade.a Bayisraele bazalaki nde na esika ya kozwa mabanga ya ntalo ya ndenge wana?

Na ntango ya kala, bato bazalaki kozwa mabanga ya ntalo na motuya mpe kosalela yango na mimbongo. Na ndakisa, bato ya Ezipito ya kala bazalaki kozwa mabanga ya ntalo mosika mpenza na bikoló oyo babengaka lelo Iran, Afghanistan, ntango mosusu ata mpe na Inde. Bisika oyo bazalaki kotimola mabanga ya ntalo na Ezipito ezalaki kobimisa mabanga ya ndenge na ndenge. Bakonzi ya Ezipito bazalaki na bokonzi likoló ya bisika oyo batimolaka mabanga ya ntalo na bateritware oyo bango bazalaki kokonza. Yobo alobelaki ndenge oyo bato ya ntango na ye bazalaki kosalela mangenda mpe kokɔta na banzela mikemike na nse ya mabele mpo na koluka mabanga ya ntalo. Na kati ya biloko ya motuya oyo bazalaki kotimola, Yobo atángi safire ná topazi.​—Yobo 28:1-11, 19.

Mokanda ya Kobima elobi ete ntango Bayisraele balongwaki na Ezipito “bapunzaki” biloko ya motuya ya Baezipito. (Kobima 12:35, 36) Boye, ekoki kozala ete mabanga oyo Bayisraele batyaki na ntolo ya libenga ya nganga-nzambe monene, bazwaki yango na Ezipito.

Mpo na nini bazalaki kosalela vinyo lokola nkisi na ntango ya kala?

▪ Na ndakisa moko oyo apesaki, Yesu alobelaki moto moko oyo miyibi babɛtaki ye. Yesu alobaki ete Mosamaria moko nde asalisaki moto yango, akangaki bampota na ye mpe asopelaki yango “mafuta ná vinyo.” (Luka 10:30-34) Ntango ntoma Paulo akomelaki moninga na ye Timote, apesaki ye toli oyo: “Komɛla lisusu mai te, kasi salelá nde mwa vinyo moke mpo na estoma na yo mpe bamaladi oyo obɛlabɛlaka.” (1 Timote 5:23) Likambo oyo Yesu alobelaki mpe toli ya Paulo eyokani mpenza na mayele ya monganga?

Buku moko (Ancient Wine) elobeli vinyo lokola “nkisi oyo ekitisaka mpasi, ebomaka mikrobe mpe kaka nkisi yango ebikisaka bamaladi ndenge na ndenge.” Na ntango ya kala, bato ya Ezipito, ya Mezopotamia mpe ya Siri bazalaki kosalela vinyo lokola nkisi ya libosoliboso mpo na kobikisa bamaladi. Buku mosusu (The Oxford Companion to Wine) elobeli vinyo lokola “nkisi ya kala oyo bato bakomá makambo na yango.” Mpo na toli oyo Paulo apesaki Timote, buku mosusu (The Origins and Ancient History of Wine) elobi boye: “Na makambo oyo bayekoli, bamoni ete mikrobe ya typhoïde mpe mikrobe mosusu ya mabe ekufaka nokinoki soki ekutani ná vinyo.” Makambo oyo bato ya mayele bamoni lelo emonisi ete biloko mikemike soki 500 oyo bakuti na kati ya vinyo esalisaka mpo na kobikisa bamaladi.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ezali mpasi koyeba ndenge babengaka mabanga yango nyonso lelo oyo.

[Elilingi na lokasa 26]

Moto moko azali kotɛka bambuma ya vinyo, na lilita ya Nakht, na Thebes, Ezipito

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Gianni Dagli Orti/​The Art Archive at Art Resource, NY

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto