Josèphe nde moto akomaki yango mpenza?
Josèphe Flavius, moto moko ya mayele na istware na siɛklɛ ya liboso, alobeli liwa ya “Yakobo, ndeko ya Yesu oyo azalaki kobengama Kristo.” (Buku XX, Jewish Antiquities) Bato mingi ya mayele bandimaka ete maloba yango ezali mpenza ya ye. Nzokande, bato mosusu ya mayele bandimaka te ete maloba mosusu oyo etali Yesu, oyo Josèphe akomaki kaka na buku yango, ezali solo. Maloba yango, oyo babengaka Testimonium Flavianum ezali oyo elandi:
“Na ntango yango, ezalaki na moto moko, Yesu, moto ya bwanya, soki kobenga ye moto ezali kobuka mibeko te, mpamba te azalaki kosala misala ya kokamwa—moteyi oyo bato mingi bazalaki kosepela koyoka ye ntango azali koteya. Abendaki epai na ye Bayuda mingi, ata mpe bato mingi ya bikólo mosusu. Azalaki Kristo; mpe ntango Pilate, oyo andimaki makanisi ya bato minene kati na biso, akatelaki ye etumbu ete abakama na ekulusu, baoyo bazalaki kolinga ye basundolaki ye te, mpo abimelaki bango ntango azongaki na bomoi na mokolo ya misato, ndenge basakoli ya Nzambe basakolaki makambo yango mpe makambo mosusu ebele ya kokamwa oyo etali ye; mpe bakristo, oyo nkombo na bango euti epai na ye, basilá te tii lelo oyo.”—Josèphe—The Complete Works, ebongolamaki na William Whiston.
Kobanda na nsuka ya siɛklɛ ya 16, ntembe moko ya makasi ebimaki kati ya bato oyo bazalaki kondima ete maloba wana ezalaki mpenza ya Josèphe ná baoyo bazalaki kondima te ete Josèphe moto akomaki yango. Serge Bardet, moto ya ekólo France oyo azalaki moto ya mayele na istware mpe ayekolaki mikanda ya kala, alukaki kosilisa ntembe yango, oyo ebandaki mbula koleka 400 liboso. Nsima ya koyekola likambo yango, abimisaki makanisi na ye na buku moko (Le Testimonium Flavianum—Examen historique considérations historiographiques).
Josèphe azalaki mokomi, kasi azalaki mokristo te. Azalaki Moyuda mpe moto ya mayele na istware ya Bayuda; kasi, likambo oyo ezalaki kobimisa ntembe mingi ezalaki ndenge abengaki Yesu “Kristo.” Nsima ya koyekola likambo yango, Bardet amonaki ete titre wana eyokani “malamumalamu na ndenge oyo bazalaki kosalela artikle defini na monɔkɔ ya Grɛki mpo na bankombo ya bato.” Bardet abakisaki ete na kotalela ndenge oyo Bayuda oyo bakómaki bakristo bazalaki kotalela makambo, ndenge oyo Josèphe asalelaki liloba Christos emonisi mpenza ete azalaki kolobela nde Yesu, mpe ezali solo ete Yesu ezali nkombo ya moto moko oyo azalaki mpenza na bomoi.
Ekoki nde kozala ete moto mosusu amekolaki ekomeli ya Josèphe mpe abakisaki makambo mosusu na lisolo yango? Nsima ya koyekola lisolo yango mpe ekomeli na yango, nsukansuka, Bardet amonisi ete komekola ya ndenge wana ekokaki kozala likamwisi. Ezalaki kosɛnga ete mokomi yango “azala na mayele ya komekola oyo elekaki ya bato mosusu nyonso ya ntango ya kala,” na maloba mosusu, azala “lokola Josèphe.”
Kasi, mpo na nini bato ya mayele bandimaka te ete maloba yango ezali ya Josèphe? Bardet amonisi esika oyo likambo yango euti ntango alimboli ete “bato mingi batyaka ntembe mpo na Testimonium—na kokesana na mikanda mingi ya ntango ya kala—kaka mpo mituna mingi ebimaki mpo na Testimonium.” Abakisi ete soki na boumeli ya bankama ya bambula bato mingi ya mayele bazalaki kondima maloba ya babuku mosusu ya kala, kasi bazalaki te kondima maloba wana ya Josèphe, ezali kaka mpo bato yango bazalaki te kondima ete Yesu azali Kristo.
Tii lelo, toyebi naino te soki makanisi wana ya Bardet ekotinda bato ya mayele bábongola ndenge na bango ya kotalela Testimonium Flavianum. Makanisi yango endimisaki Pierre Geoltrain, moto ya mayele oyo ayekolaki lisolo ya Bagrɛki mpe Bayuda, mpe lingomba ya bokristo ya liboso. Bambula mingi liboso, azalaki kokanisa ete Testimonium ezali makambo oyo babakisá kobakisa; azalaki kutu kotyola bato oyo bazalaki kondima ete maloba yango ezali mpenza ya Josèphe. Kasi, abongolaki makanisi na ye. Nsukansuka, ayaki kondima ete buku ya Bardet nde etindaki ye abongola makanisi na ye. Sikoyo, Geoltrain alobi ete “banda lelo, moto moko te asengeli kowangana ete Josèphe nde moto akomaki lisolo wana.”
Ya solo, Batatoli ya Yehova bazali kutu na bantina mingi koleka, oyo euti na Biblia, ya kondima ete Yesu azali Kristo.—2 Tim. 3:16.