Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w13 1/5 lok. 15
  • Biyano na mituna ya Biblia

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Masolo mosusu
  • Nzambe akolimbisa ngai?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Nzambe oyo ‘alimbisaka mabe’
    Pusaná penepene na Yehova
  • Ntango Nzambe alimbisaka, abosanaka mpe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Yehova, Nzambe Oyo ‘Alimbisaka’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
w13 1/5 lok. 15

BIYANO NA MITUNA YA BIBLIA

Masumu na biso ekoki kolimbisama?

Ezalaka mpasi te mpo moto andimama na Nzambe

Biblia emonisi ete bato nyonso bazali basumuki. Tozwá ezaleli yango epai ya Adama, moto ya liboso. Yango wana, na bantango mosusu tosalaka makambo ya mabe oyo na nsima epesaka biso mawa. Yesu Kristo, Mwana ya Nzambe, akufaki mpo na kofuta masumu na biso. Mbeka ya lisiko oyo apesaki esali ete masumu na biso elimbisama. Ezali likabo oyo euti na Nzambe.​—Tángá Baroma 3:23, 24.

Bato mosusu basalá masumu minene mpe bamitunaka soki Nzambe akoki kolimbisa bango. Likambo ya esengo, Liloba ya Nzambe elobi ete: “Makila ya Yesu Mwana na ye ezali kopɛtola biso na lisumu nyonso.” (1 Yoane 1:7) Yehova andimaka kolimbisa ata masumu ya minene soki moto abongoli mpenza motema.​—Tángá Yisaya 1:18.

Tosengeli kosala nini mpo masumu na biso elimbisama?

Soki tolingi Yehova Nzambe alimbisa biso, tosengeli koyekola makambo na ye​—koyeba banzela na ye, koyoka batoli na ye mpe kotosa makambo oyo asɛngaka. (Yoane 17:3) Yehova alimbisaka mpenza baoyo batikaka bizaleli na bango ya mabe mpe babongwanaka.​—Tángá Misala 3:19.

Ezalaka mpasi te mpo moto andimama na Nzambe. Yehova ayebi bolɛmbu na biso. Azali motema mawa mpe boboto. Motema mawa na ye esengeli te kotinda yo oluka koyeba makambo mingi oyo osengeli kosala mpo osepelisa ye?​—Tángá Nzembo 103:13, 14.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto