ELOBELI TITRE YA EZIPELI | MATEYA YA LOKUTA OYO ETINDAKA BATO BÁLINGA NZAMBE TE
Ntina oyo bato mosusu bakokaka te kolinga Nzambe
“‘Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.’ Wana nde mobeko oyo eleki monene mpe ya liboso.”—Yesu Kristo, mobu 33 ya ntango na biso.a
Bato mosusu bazalaka na mokakatano ya kolinga Nzambe. Mpo na bango, ezali mpasi koyeba makambo ya Nzambe, akipaka bato te, kutu azali motema mabe. Tóyoka ndenge bato oyo balobi:
“Nabondelaki Nzambe asalisa ngai, kasi na ntango wana kaka, nazalaki komiyoka ete azali mosika na ngai, mpe nakoki kopusana penepene na ye te. Nazalaki kokanisa ete Nzambe ayokaka esengo te, mawa mpe te.”—Marco, Italie.
“Atako nazalaki na mposa ya kosalela Nzambe, kasi nazalaki komona ete azali mosika na ngai. Nazalaki kokanisa ete Nzambe azalaka makambo makasi mpe mosala ayebi kaka kopesa biso bitumbu. Nazalaki kondima te ete azali boboto.”—Rosa, Guatemala.
“Ntango nazalaki mwana, nazalaki kokanisa ete Nzambe alukaka kaka mabunga na biso, mpe alingaka kaka kopesa biso etumbu soki tosali mabe. Na nsima, nakómaki kotalela ye lokola azalaka mafumafu. Nzambe azali lokola ministre-mokonzi oyo azali kaka kolandela makambo ya bato oyo azali koyangela, kasi amibanzabanzaka mpo na bango te.”—Raymonde, Canada.
Bongo yo okanisi nini? Tosengeli mpenza kolinga Nzambe? Banda basiɛklɛ mingi bakristo batunaka motuna wana. Kutu, na ntango ya Moyen-Âge, bakristo mingi ya lokuta bazalaki te kobondela Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Mpo na nini? Bato bazalaki kobanga Nzambe na ndenge ya mabe. Moto moko ya mayele na nkombo Will Durant amonisi likambo yango boye: “Ndenge nini mosumuki akoki kotinda mabondeli na ye epai ya Nzambe oyo azali nsɔmɔ mpe azali mosika mpenza na bato?”
Nini esali mpenza ete bato bákóma kokanisa ete Nzambe azali “nsɔmɔ mpe mosika na bato”? Biblia eteyaka mpenza nini na ntina na Nzambe? Koyekola solo na ntina na Nzambe ekoki kosalisa yo okóma kolinga ye?