Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wp16 No. 3 lok. 3
  • Ntango moto olingaka akufi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ntango moto olingaka akufi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
  • Masolo mosusu
  • Lolenge nini basusu bakoki kopesa lisungi?
    Ntango moto oyo olingaka akufi
  • “Bólela elongo na bato oyo bazali kolela”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Lolenge nini nakoki koyika mpiko na mawa na ngai?
    Ntango moto oyo olingaka akufi
  • Ndenge ya kosala ntango ozali na mawa makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
wp16 No. 3 lok. 3
Mwasi moko azali kolela

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Ntango moto olingaka akufi

“Ko. . . le . . . la . . . te yaya, Nzambe ye moko ayebi.”

Yango nde maloba bayebisaki mwasi moko na litoi na nkombo Bebe. Azalaki kolela tata na ye oyo akufaki na likama ya motuka.

Bebe amesanaki na tata na ye mingi. Moninga na bango moko nde alobaki na ye bongo, kasi esalaki Bebe mpasi na esika ekitisa ye motema. Azalaki komilobela mbala na mbala ete “ebongaki akufa te.” Mwa bambula na nsima, ntango Bebe akomaki likambo yango na buku, emonanaki polele ete azalaki kaka na mawa.

Ndenge Bebe amonaki yango, mbala mosusu esɛngaka ntango mingi liboso mawa esila, mingimingi soki moto amesanaki na moto oyo akufi. Yango wana Biblia ebengi liwa “monguna ya nsuka.” (1 Bakorinti 15:26) Soki ekɔti na libota tozalaka na makasi ya kopekisa yango te, mbala mingi ekɔtaka na ntango oyo tokanisi te mpe ebɔtɔlaka biso bato tolingaka. Ata moto moko te akoki kokima yango. Na yango, ezali likambo ya kokamwa te soki toyebaka te ndenge ya kolonga mpasi yango.

Mbala mosusu omitunaka: ‘Esɛngaka ntango boni mpo mawa wana esila? Moto akoki kosala nini mpo mawa esila? Ndenge nini nakoki kosalisa baoyo bazali na mawa? Elikya ezali mpo na bandeko to baninga na biso oyo bakufá?’

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto