Etanda ya makambo ezali na kati
3 Liloba moko oyo ezalaki na ndimbola monene!
PƆSƆ YA 26/12/2016–01/01/2017
4 “Bókoba kolendisana mokolo na mokolo”
Yehova Nzambe mpe Yesu Kristo bazali ndakisa eleki malamu na likambo etali kolendisa basusu. Ntoma Paulo mpe azalaki kozwa na motuya mingi likambo ya kolendisa basusu. Kolanda ndakisa na bango ekosalisa biso nyonso tósala ete ndako na biso mpe Ndako ya Bokonzi ezala bisika ya komoniselana bolingo mpe kolendisana.
PƆSƆ YA 02-08/01/2017
9 Babongisami na boyokani na Buku ya Nzambe
PƆSƆ YA 09-15/01/2017
14 Ozwaka Buku ya Yehova na motuya mingi?
Masolo oyo eyanoli na mituna oyo: Mpo na nini tosengeli kotya motema ete basambeli ya Yehova bázala bato oyo babongisami malamu? Ndenge nini tokoki kobongisama na boyokani na Buku ya Nzambe? Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali kopesa ebongiseli ya Yehova mabɔkɔ na bosembo mpenza?
PƆSƆ YA 16-22/01/2017
PƆSƆ YA 23-29/01/2017
26 Balongwaki na boombo ya mangomba ya lokuta
Masolo oyo elimboli ntango nini basaleli ya Nzambe bakɔtaki na boombo ya Babilone mpe milende nini bakristo oyo batyami mafuta na elimo basalaki na nsuka ya bambula ya 1800 mpo na kokanga ntina ya Liloba ya Yehova malamumalamu. Tokomona mpe ekateli makasi oyo Bayekoli ya Biblia bazwaki mpo na Babilone Monene, mpe tokoyeba ntango nini boombo ya Babilone esukaki.