Etanda ya makambo ezali na kati
PƆSƆ YA 23-29/10/2017
Yehova azali ndakisa eleki monene ya komipekisa. Ndenge nini bato bakoki komekola ye na oyo etali komonisa komipekisa? Mpe makambo nini okoki kosala mpo okóma na komipekisa makasi?
PƆSƆ YA 30/10/2017–5/11/2017
8 Mekolá motema mawa ya Yehova
Komonisa motema mawa elimboli nini? Yehova ná Yesu bapesá ndakisa malamu na oyo etali komonisa motema mawa. Kasi, ndenge nini biso mpe tokoki komekola ndakisa na bango? Mpe matomba nini tokoki kozwa soki tozali komonisa motema mawa?
13 Lisolo ya bomoi—Nazwi lipamboli ya kosala na bato oyo bakɔmɛli na elimo
PƆSƆ YA 6-12/11/2017
18 “Liloba ya Nzambe na biso ekoumela seko”
PƆSƆ YA 13-19/11/2017
23 “Liloba ya Nzambe . . . ezali na nguya”
Mpo na nini ezali na ntina kokoba kobimisa Biblia na minɔkɔ mosusu? Mpe ndenge nini tokomonisa ete tozali na botɔndi mpo tozali na Liloba ya Nzambe na monɔkɔ oyo tokoki kokanga ntina? Masolo oyo mibale ekosalisa biso tókóma na botɔndi mingi mpo na Biblia mpe tólinga lisusu mingi Mobandisi na yango.
PƆSƆ YA 20-26/11/2017
28 “Zalá na mpiko . . . mpe salá”
Kozala na mpiko ezali na ntina mingi mpo na bakristo. Bandakisa ya bato oyo bamonisaki ezaleli yango na ntango ya kala ekoki koteya biso nini? Ndenge nini bilenge, baboti, bandeko basi oyo bakómi mikóló mpe bandeko mibali oyo bazwá batisimo bakoki komonisa ete bazali na mpiko mpe pene ya kosala misala ya malamu?