Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wp18 No. 2 lok. 16
  • “Bato ya komikitisa bakozwa mabele”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bato ya komikitisa bakozwa mabele”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2018
  • Masolo mosusu
  • Koyeba solo ekoki komemela yo nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2020
  • Okoki kokóma moninga ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2019
  • Okoki kopona ndenge bomoi na yo ekozala na mikolo ezali koya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2021
  • Okanisaka ete bomoi ekozala ndenge nini na mikolo ezali koya?
    Okanisaka ete bomoi ekozala ndenge nini na mikolo ezali koya?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2018
wp18 No. 2 lok. 16
Libota moko

“Bato ya komikitisa bakozwa mabele”

Mingi na biso tosilá komona bato bazali kosala mabe mpe basusu bazali kosala malamu; bato mabe bazali konyokola bato oyo bazali kosala malamu. Makambo ya kozanga bosembo mpe makambo ya mabe ekosila mokolo mosusu?

Nzembo 37 epesi biso eyano ya polele mpe elakisi biso oyo tosengeli kosala lelo oyo. Talá biyano oyo Biblia epesi na mituna ya ntina mingi oyo elandi.

  • Tosengeli kosala nini na bato oyo bazali konyokola biso?​—Vɛrsɛ 1, 2.

  • Nini ekokómela bato mabe?​—Vɛrsɛ 10.

  • Na mikolo ekoya, nini ekokómela bato oyo bazali kosala makambo ya malamu?​—Vɛrsɛ 11, 29.

  • Tosengeli kosala nini lelo oyo?​—Vɛrsɛ 34.

Maloba ya Nzembo 37, oyo ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe, emonisi polele mapamboli oyo ezali kozela na mikolo ekoya bato oyo bazali ‘kotyela Yehova elikya mpe kobatela nzela na ye.’ Batatoli ya Yehova bakosepela kosalisa yo oyekola Biblia mpe oyeba makambo oyo okoki kosala mpo yo ná bandeko mpe baninga na yo bózala na bomoi ya malamu na mikolo ekoya.

Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali mokano ya Nzambe mpo na bato mpe mpo na mabele, talá mokapo 3 ya buku Makambo oyo Biblia eteyaka, ebimisami na Batatoli ya Yehova. Ezali mpe na www.pr2711.com

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto