Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/00 lok. 1
  • Tósalela mikanda na mayele

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tósalela mikanda na mayele
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Masolo mosusu
  • Biyano na mituna na bino
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Tósalela mikanda na biso oyo elimbolaka Biblia na mayele
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Ndenge ya kolakisa mikanda na teritware oyo bato balobaka minɔkɔ ndenge na ndenge
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Saleláká mikanda na biso malamu
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
Mosala na biso ya Bokonzi—2000
km 1/00 lok. 1

Tósalela mikanda na mayele

1 Ndenge malamu ya kosalela mikanda ebandaki ntango bakabolaki Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuli 1879 6 000 na Lingelesi. Banda wana, mikanda ndenge na ndenge ebimaki mpe ekabolamaki epai na bato mingi.

2 Mosala oyo esimbami bobele na makabo: Esili koleka mwa bapɔsɔ, bayebisaki biso ete bazulunalo mpe mikanda ekobanda kopesama kozanga kokata ntalo epai ya basakoli mpe epai ya bato mosusu oyo bazali kosepela na nsango na biso. Nzokande, ntango tozali kotikela bato mikanda, tokoki kondima makabo oyo bazali kopesa mpo na kosimba mosala ya kosakola nsango malamu na mokili mobimba. Tozali na elikya ete Yehova akopambola ebongiseli oyo ya sika.​—Talá Matai 6:33.

3 Ntango tozali na mosala ya kosakola, tokosala nini: Tósalela maloba ya kobenda likebi mpo na kobanda lisolo. Soki moto asepeli te, ezali na ntina te ete tólakisa ye mokanda. Tosengeli te kotika mikanda epai ya bato oyo basepeli na yango te; soki tosali bongo tokobebisa yango mpamba. Epai mosusu, soki moto oyo tozali kosolola na ye asepeli mpenza mpe andimi kotánga mokanda, tokoki kotikela ye yango. Kosala bongo ekomonisa ete tozali kosalela mikanda na mayele.

4 Nsima ya kolakisa moto mokanda, okoki koloba boye: “Soki olingi kotánga mokanda oyo, nakosepela kotikela yo yango.” Soki moto yango atuni: “Mokanda yango ezali na ntalo boni?” Okoki koyanola ete: “Mosala na biso ezali mombongo te. Tozali kotɛka mokanda oyo te. Mosala na biso ezali kosalema na mikili koleka 230 na bato ya bolingo malamu, mpe ezali mpo na kosalisa bato báyeba eloko nini bakosala mpo na kozwa bomoi ya seko. Soki olingi kopesa likabo mpo na kosimba mosala yango, nakosepela kozwa likabo yango.”

5 Ntango ozali kolakisa bazulunalo, okoki kobimisa mituna oyo ezali na boyokani na lisolo moko ya sikisiki mpe na nsima okoki koloba boye: “Nalingi kopesa yo libaku ya koyeba makambo mingi na ntina na motuna oyo elobelami na lisolo oyo. Soki olingi kotánga bazulunalo oyo mibale, nakosepela kotikela yo yango.” Soki moto yango andimi, okoki kobakisa ete: “Nakanisi ete okosepela na lisolo yango mingi. Kutu nakosepela kozongela yo na pɔsɔ ya nsima mpo na koyeba makanisi na yo likoló na yango. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ebimaka koleka milio 22, na minɔkɔ 132 na mokili mobimba. Mosala oyo nyonso esimbami bobele na makabo ya bolingo malamu oyo bato bazali kopesa. Soki olingi kopesa mwa likabo mpo na kosimba mosala oyo ya koteya, tokosepela kozwa likabo yango.”

6 Kokakatana te mpo na kolobela likambo ya kopesa makabo oyo ezali kopesa nzela ete mosala na biso esalema. Na ndakisa, moto oyo asepeli akoki kotuna boye: “Bozali kokabela bato mokanda oyo?” Okoki koyanola ete: “Soki olingi kotánga yango, ekómi ya yo. Kasi, nalingi koyebisa yo mwa makambo mosusu mpo na mosala ya kosakola oyo tozali kosala na mokili mobimba mpe kolimbolela yo epai mbongo eutaka mpo na kosala mosala yango.” Tokoki kolimbola ete mosala na biso ezali mosala ya bolingo malamu oyo ezali kosalema na mokili mobimba na Batatoli ya Yehova. Na nsima tokoki kobenda likebi na ye na lokasa 2 ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, oyo ezali komonisa ete kobimisa zulunalo oyo “ezali mosala ya kolakisa bato Biblia na mokili mobimba, oyo esimbami na makabo ya bolingo malamu.” Na nsima tokoki koyebisa moto yango ete soki alingi kopesa mwa likabo moke mpo na kosalisa Batatoli ya Yehova ete básala mosala yango na mboka na biso, tokosepela mingi na likabo na ye.

7 Mbala mosusu moto moko akoki kozwa mbala moko mokanda mpe kopesa bobele matɔndi. Na ntango wana okoki koloba boye: “Nandimi ete okosepela na yango. Bato mingi balukaka koyeba ndenge nini tozwaka mbongo mpo na kosala mosala oyo, mpamba te ezali kosalema na mokili mobimba. Bato mingi oyo bazwaka mikanda na biso bamonisaka ete basepelaka na makambo oyo bazali kotánga na kati wana bazali kopesa mwa likabo mpo na kopesa biso nzela ete tólanda kokabola yango. Soki bato balingi kopesa likabo, tosepelaka kozwa likabo na bango.”

8 Ndenge nini tokoki koyeba ete moto asepeli mpenza?: Mokano na biso ezali te ya koluka kokabola mikanda mpambampamba. Tolingi ete mikanda na biso ekokisa mosala na yango, elingi koloba, esalisa bato ya mitema sembo báyeba makambo mingi na ntina na mokano kitoko ya Yehova. Ekozala mawa soki totiki mikanda epai na bato oyo bazali kosepela na makambo ya elimo te. (Ebe. 12:16) Mpo na kokabola mikanda na ndenge ya malamu, yango ekotalela makoki na biso ya koyeba soki moto asepeli mpenza. Ndenge nini okoki komona ete moto asepeli mpenza? Soki moto andimi na motema moko mpenza kosolola na yo, yango ekoki kozala elembo ya malamu oyo emonisi ete asepeli. Soki azali koyoka yo na likebi nyonso ntango ozali kosolola na ye, ndenge akoyanola na mituna mpe ndenge akobimisa makanisi na ye na makambo oyo bozali kolobela, ekoki komonisa ete asepeli. Soki azali kosolola na yo na limemya, lokola moninga, yango ekomonisa mpenza ete andimi koyoka. Soki azali kolanda yo ntango ozali kotánga bavɛrsɛ ya Biblia, ekoki komonisa ete azali na limemya mpo na Liloba ya Nzambe. Ezali malamu kotuna moto oyo ozali kosolola na ye soki akotánga mokanda oyo olingi kotikela ye. Okoki mpe koyebisa ye ete okosepela kozongela ye na mbala ya nsima mpo na kosolola na ye lisusu. Soki andimi, yango ezali elembo mosusu oyo ekomonisa ete asepeli mpenza na makambo oyo osololi na ye. Soki omoni bilembo oyo emonisi ete moto asepeli mpenza, bokoki kotya motema ete moto yango akosalela malamu mokanda nyonso oyo okotikela ye.

9 Mbongwana oyo mpo na lolenge na biso ya kokabola mikanda ezali komonisa mpenza ete ‘totɛkisaka Liloba ya Nzambe te.’ (2 Kol. 2:17) Ezali komonisa mpe ete tosanganaka na mokili te.​—Yoa. 17:14.

10 Lokola kobomama ya Babilone Monene ebɛlɛmi, bibongiseli nyonso ya mangomba ezali kokutana na mitungisi minene. Mposa na biso mpenza ezali ete mosala ya kosakola nsango ya Bokonzi na mokili mobimba elanda kosalema kozanga mindɔndɔ mpe elanda komema bato mingi na lobiko.​—Mat. 24:14; Lom. 10:13, 14.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto