Ndakisa oyo ebongi na kolanda penepene
1 Na ntembe te, Yesu azali moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo. Atikelaki bayekoli na ye ndakisa moko ya kokoka. Ata soki tokoki te kokóma na kokoka motindo na ye, tobyangami na ‘kolanda malamu matambe na ye.’ (1 Pet. 2:21) Mposa na biso esengeli kozala ya kokokana mpenzampenza na Yesu, mingimingi na kosakoláká solo na molende epai na bazalani na biso.
2 Yesu azalaki bobele mosakoli te: azalaki mpe moteyi monene. ‘Bibele bakamwaki mpo na lolenge na ye ya koteya.’ (Mat. 7:28) Mpo na nini azalaki koteya malamu boye? Tótalela na likebi nyonso “lolenge na ye ya koteya.”
3 Lolenge ya kolanda Yesu: Yesu ateyamaki na Tata na ye. (Yoane 8:28) Mposa na ye ezalaki ya kokumisa Yehova mpe kokembisa nkombo na ye. (Yoane 17:4, 26) Kosangana na biso na mosala ya kosakola mpe na mosala ya koteya esengeli kopusama na mposa na biso ya kokumisa Yehova kasi te ya komitya biso moko na esika ya liboso.
4 Nyonso oyo Yesu ateyaki etongamaki likoló na Liloba ya Nzambe. Mbala mingi azalaki kolobela makambo mazwami na Makomami. (Mat. 4:4, 7; 19:4; 22:31) Tolingi kobenda likebi ya balobani na biso likoló na Biblia. Na bongo, bakoyeba ete nyonso oyo tozali koteya mpe kolakisa etongami likoló na buku oyo eleki babuku nyonso mosusu.
5 Yesu azalaki kosalela maloba mikuse, mabongi mpe ya petee. Na ndakisa, ntango alimbolaki epai na bayekoli na ye lolenge ya kozwa bolimbisi euti na Nzambe, alendisaki bango ete bálimbisaka mpe basusu bango moko. (Mat. 6:14, 15) Tosengeli kotya molende na kosakola nsango ya Bokonzi na maloba oyo mazali petee mpo na kokanga ntina.
6 Yesu aselelaki na mayele nyonso bilakiseli mpe mituna mpo na kopusa balobani na ye na kokanisa. (Mat. 13:34, 35; 22:20-22) Bilakiseli oyo bizali kolobela makambo ya mokolo na mokolo ekoki kosalisa bato na kokanga ntina ya mateya mosusu ya moboko ya Biblia oyo mazali mwa nkaká. Tosengeli kotuna mituna oyo mikopusa bango na kokanisa. Mituna oyo mizali kotinda na kokanisa mikoki komema bango na kokóma na bosukisi malamu.
7 Yesu azalaki kozwa ntango ya kolimbola masoló oyo mazalaki mpasi epai na baoyo balingaki koyeba makambo mingi. Baoyo basepelaki mpenza na yango, na ndakisa bayekoli na ye, bakangaki ntina ya oyo Yesu azalaki koteya. (Mat. 13:36) Biso mpe tosengeli kozala pene mpo na koyanola na mituna oyo bato bazali kotuna biso na bosembo nyonso. Soki toyebi eyano te na mituna misusu kati na yango, tokosala bolukiluki mpe tokozonga mbala ya nsima elongo na bandimbola oyo esengeli.
8 Yesu ateyaki mpe na kopesáká ndakisa. Asukolaki mpenza makolo ya bayekoli na ye, Nzokanda ye azalaki Nkolo na bango. (Yoane 13:2-16) Soki tozali na elimo ya komikitisa, bato oyo tozali koteya bakobendama na kosalela makambo oyo bazali koyekola.
9 Yesu azalaki kosimba mitema ya bato mpe kolamwisa bolingo na bango mpo na boyengebene. Biso mpe tolingi kosimba mitema ya bato. Tozali komeka kolamwisa kati na bango mposa oyo moto nyonso abotamaka na yango ya kosambela Ye oyo aleki-likoló mpe ya kofanda elongo na baninga na ye kati na kimya mpe na esengo.
10 Na Yuni, tokozala na libaku ya koloba na ntina na oyo toyekolaki likoló na Yesu na kokaboláká buku Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo. Soki tomekoli lolenge ya koteya na Yesu, tokopusa bato ya motema sembo na kotya likebi na mateya na ye.—Mat. 10:40.