Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 5/96 lok. 3
  • Manáka ya makita makobongwana?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manáka ya makita makobongwana?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Masolo mosusu
  • Tózala na limemya epai na bazalani na biso​—Eteni ya liboso
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Programɛ ya sika ya makita ya lisangá
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Makita oyo ‘elendisaka na kozala na bolingo mpe na misala ya malamu’
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Koyangana elongo mpo na losambo
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1996
km 5/96 lok. 3

Manáka ya makita makobongwana?

Wana masangá mingi oyo bazali kosalela Ndako ya Bokonzi moko bayokani mpo na kobongola to kobongisa manáka ya makita, basengeli kosala yango na mwa 1 Yanuáli. Kozala pene mpo na kosimba ebongiseli yango, ezali komonisa bolingo mpe limemya bamoko epai na bamosusu. Mbala mingi, mbongwana ya manáka ya makita esalemaka mpo na litomba na biso mpo na kopesa biso nzela ya koyangana na makita kozanga nkaka.

Nzokande, ekoki kokwela ete mbongwana ya manáka ya makita oyo ekobanda na Yanuáli ekokana mpenzampenza te na manáka na biso. Mbala mosusu tokosɛngisama kosala mbongwana oyo ekobulunganisa manáka na biso mwa moke. Na kosaláká na bomoko, tokomonisa ete tozali kososola ntina ya kozala ya ebongiseli motindo wana oyo epesaka matomba na baoyo nyonso batalelami na yango.

Ya solo, mbongwana ya mbala ya nsima etali manáka ya makita ekoki mpenza kobonga mpo na biso. Wana tozali kozela, tolendisami na kosala mbongwana oyo esengeli kopesa biso nzela ya koyangana na makita nyonso ya pɔ́sɔ, engebene manáka oyo matyami na lisangá. Tósala milende ya kozala na makanisi motindo moko na mokomi na Nzembo, oyo alobaki ete: “Nasepeli mingi wana balobelaki ngai ete, Tiká tókenda na ndako na [Yehova]! ”​—Nz. 122: 1.

Kati na bingumba epai kuna masangá mingi mazali kosalela Ndako ya Bokonzi moko, ekómaka mbala mosusu ete matáta mábima kati na masangani ya bankulutu na ntina na manáka ya makita. Tokoki kotánga makambo oyo malandi kati na Mosɛnzɛli ya 15 Augústo 1988, lokasa 19, paragrafe 15 (ebimeli ya Lifalansé): “Na ndakisa soki masangá mibale bayanganaka na Ndako ya Bokonzi moko, lisangá moko te esengeli kokanisa ete Ndako ya Bokonzi ‘ezali ya bango’ mpe ete basengeli kosɛngisa makambo oyo bango balingi epai na lisangá mosusu mpo na oyo etali manáka ya makita to makambo mosusu. Limemya ya bamoko epai na bamosusu mpe kosalana elongo esengeli kotyama liboso.”​—1 Pet. 3:10-12.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto