Osɛngaka na bato ete bóyekola Biblia?
1 Basakoli mingi bazali kolonga kobanda boyekoli ya Biblia na kosɛngáká mbala moko epai ya moto ete bátalela Biblia elongo. Moto moko oyo azalaki mbala mingi koboya mikanda na biso andimaki na bolingo na ye moko boyekoli ya Biblia. Alobaki ete: “Nazalaka ntango nyonso na mposa ya koyekola Biblia.” Boyekoli ebandaki mpe libota na ye mobimba lisalaki bokoli ya nokinoki.
2 Biso banso tosengeli koluka kobanda boyekoli ya Biblia. Mpo ete bato bákola mpo na kozala bayekoli ya Klisto, esengeli koteya bango. (Mat. 28:19, 20) Nzokande, tokoteya bango bobele soki toyekoli Biblia elongo na bango. Mbala mingi, likoki ya kobanda boyekoli ya Biblia ezwamaka bobele na kosɛngáká epai na bato ete olakisa bango lolenge ya komimesenisa na Biblia mpe na bilaka ya Nzambe. Ndeko mobali moko abandaki boyekoli mitano ya Biblia likoló na trakte Bomoi ya kimya kati na mokili ya sika. Lokola azalaki na likoki te ya kotambwisa pɔsɔ na pɔsɔ bayekoli mingi, apesaki bango epai na basakoli mosusu.
3 Soki tobandaka boyekoli kozanga nkaka, tokoki komema basakoli mosusu elongo na biso, mpe kosalisa bango ete bábanda oyo ya bango. To mpe tokoki kopesa bamoko ya bato oyo toyekolaka na bango epai na basangani mosusu ya lisangá. Soki ozali na mposa ya kotambwisa boyekoli ya Biblia, mpo na nini te komeka kosɛnga epai na bato oyo ozali kokutana na bango kati na mosala ya ndako na ndako? Mosakoli moko azongaki mpo na kotala elenge mwasi moko oyo amonisaki bosepeli mingi te. Atako bongo, mosakoli yango asɛngaki ete báyekola Biblia, mpe ye andimaki. Sikawa asili kozwa batisimo, mpe ndeko na ye ya mwasi bakisa mpe sɛmɛki na ye bazali koyangana na makita.—Gal. 6:6.
4 Ezali te baoyo nyonso babandi boyekoli nde bakolendendela. Ezali te bato nyonso oyo bazali koyekola nde bakoyamba solo. Kasi bamoko na bango bakosala yango. Wana tozali kobanda boyekoli mingi, tokozwa mpe mabaku mingi ya kosunga bato ete báya kosambela Yehova.