Mayebisi
◼ Lipesi ya Yanuáli: Liboke ya mwa babúku misato ekeseni ya nkasa 32. Febwáli: Mwa babúku. Mársi: Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis. Apríli: Okoki kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo ekobongwana paradis mpe mwa babúku. Máí: Les Saintes Écritures—Traduction du monde nouveau elongo na búku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes? Yúni: Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo.
◼ Soki bozwi naino te mwa búku “Tótángaka Makomami” mpo na mobu 1996, tosɛngi na bino ete, wana bozali kozela, bókamata mikapo ya basanza ya liboso ya 1995. Bólandaka dati. Na ndakisa, na Mwayambo 1 Yanuáli 1996, mokapo ya Mwalomingo 1 Yanuáli 1995 mokotalelama.
◼ Masangá makozwa bibongiseli malamu mpo na Ekaniseli oyo ekosalema mbula oyo na Mwamibale 2 Apríli, nsima na kolala ya moi. Atako mbala mosusu likoki lizalaka te, nzokande ezali malamu ete lisangá na lisangá esala ekaniseli yango moko kozanga kozala elongo na lisangá mosusu. Na bisika oyo masangá mingi mazali kosala makita na bango kati na Ndako ya Bokonzi bobele moko, ekozala mbala mosusu malamu ete lisangá moko to masangá mingi kati na yango másalela bandako mosusu na mpokwa wana. Ekaniseli esengeli kobanda na ntango malamu mpo ete yango ekoka te kozala mabe mpo na bato ya sika oyo bazali kosepela na solo. Lisusu, manáka esengeli kokangana te kino kosala ete ntango ezanga, liboso mpe nsima ya likita, mpo na kopesa babyangami mbote, mpo na kosɛnga na basusu ete tósalisa bango na elimo to mpo na kolendisana bamoko na bamosusu. Nsima ya kotalela na bozindo mpenza makambo nyonso oyo masɛngeli, bankulutu bakozwa ekateli mpo na oyo esengeli kosalema na ntina na kopesa nzela na baoyo nyonso bakoya na Ekaniseli ete bázwa mpenza litomba na yango.
◼ Lisukúlu moko ya sipesiale ekosalema kati na masangá nyonso na Mwalomingo 21 Apríli 1996. Ekozala na motó na likambo ete Tózala na ekweli te katikati na libota oyo lisili kobeba. Tokosɛnzɛla ete tóbyanga baoyo nyonso bakoyangana na Ekaniseli na mbula oyo. Tokosala mpenza makasi ete tósalisa bamilió ya bato oyo bazali koyekola Biblia.
◼ Na likita ya mosala ya 8 Yanuáli, esengeli kopesa kálati “Instructions médicales — Pas de sang” epai na basakoli nyonso oyo babatisami mpe cartes d’identité mpo na bana na bango.
◼ Manáka ya boyekoli ya mokanda: Kobanda na mokolo ya 29 Apríli kino mokolo ya 2 Sɛtɛ́mbɛ 1996, tokoyekola makambo mazwami kati na búku ya sika oyo ete Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Moto na moto alendisami ete amizwela búku na ye uta sikawa. Yango elingi koloba ete, na dati wana, manáka oyo tozali kolanda esengeli kokatama mpo na kotambola lolenge moko na bandeko na biso nyonso na mokili mobimba.