Mayebisi
◼ Mikanda ya kolakisa na Sɛtɛ́mbɛ: Mwa búku moko ya nkasa 32 kati na oyo elandi: Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?; Osengeli kondima Trinité?; Bokonzi oyo ekosala Paradis; Ntango moto oyo olingaka akufi . . .; Quel est le but de la vie? Comment le découvrir?; Sepela na bomoi ya seko na Mabele!; “Tala, nazali kozalisa biloko nyonso biloko na sika.” Ntango libaku ekomonana, tokoki kolakisa: Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba? Bilimu ya bakufi—Bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe?—Bizali solo?; Nos problèmes — Qui nous aidera à les résoudre? Ɔkɔtɔ́bɛ: La vie: comment est-elle apparue? Évolution ou création? Masangá oyo mazali na babúku ilandi kati na libómbo na yango ya mikanda bakoki mpe kolakisa yango: Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis to Ndenge nini okoki kozala na bomoi na libota ya esengo. Novɛ́mbɛ: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Soki moto moko amonisi bosepeli na ntango ya bozongeli ya sika, likoki ekozala ya kosɛnga ye ete asala abonemá. Desɛ́mbɛ: Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Tokosala makasi mpenza na kozongela baoyo nyonso bandimaki kokamata búku yango, na mokano ya kobanda boyekoli ya Biblia.
◼ Lisangá mokomoko ekozwa baformilɛ́rɛ mpo na mobu ya mosala 1997. Bósɛnzɛla na kosalela yango na lolenge ya malamu. Esengeli kosalelama bobele mpo na mosala na yango.
◼ Bosili kotinda formilɛ́rɛ Inventaire des publications (S-18). Tozali kokundwela bino ete yango esengeli kotindama na biro liboso ya 6 Sɛtɛ́mbɛ. Bóbomba kopi mosusu kati na dosyé na bino. Kopi mosusu ya misato ekozala brouillon. Ɛvantɛ́rɛ ekokambama na mokomeli, mpe mokɛngɛli-mokambi akotalela malamumalamu baformilɛ́rɛ oyo esili kotondisama. Mokomeli mpe mokɛngɛli-mokambi bakotya mabɔkɔ likoló na yango.
◼ Masangá makobanda kosɛnga Calendrier des Témoins de Jéhovah 1997 kati na demande na bango ya mikanda na Sɛtɛ́mbɛ.